Ndenge mosusu ya kosalela mwa buku Message de la Bible
Bato mingi na teritware na biso, mingimingi baoyo bazali na mangomba oyo endimelaka Yesu te, bayebi Biblia te. Basakoli mosusu oyo bayekolaka na bato ya ndenge wana na buku Biblia eteyaka, basalelaki mpe mwa buku Message de la Bible mpo na kosalisa bayekoli yango báyeba makambo oyo ezali na Biblia. Na ndakisa, ndeko mobali moko atalelaka na bayekoli na ye ya Biblia makanisi oyo ezali na eteni 1 ya mwa buku yango ntango azali koyekola na bango mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka. Na nsima, atalelaka elongo na moyekoli eteni mosusu ya mwa buku yango na nsuka ya boyekoli nyonso. Ozali koyekola na moto moko oyo ayebi Biblia malamu te to ayebi yango ata moke te? Mpo na kosalisa ye ayekola ‘makomi mosantu oyo ekoki kokómisa ye moto ya bwanya mpo na lobiko,’ okoki kotalela ná ye makambo oyo ezali na mwa buku Message de la Bible ntango ozali koyekola na ye na buku Biblia eteyaka.—2 Tim. 3:15.