Ozali koyekola epai ya Yehova na ndenge oyo makoki na yo nyonso ezali kopesa yo nzela?
1. Na oyo etali koteyama, Yehova alingaka nini mpo na basaleli ye?
1 Yehova, ‘Molakisi na biso Monene’ alingaka ete tóteyama malamu. (Yis. 30:20) Abandaki koteya ntango akelaki Mwana na ye ya liboso. (Yoa. 8:28) Ata nsima ya botɔmbɔki ya Adama, Yehova atikaki koteya te; na bolingo nyonso, akobaki koteya bato ya kozanga kokoka.—Yis. 48:17, 18; 2 Tim. 3:14, 15.
2. Mosala nini ya koteya ezali kosalema lelo oyo?
2 Lelo oyo, Yehova azali kotambwisa mosala monene ya koteya oyo esalemá naino te banda mokili ebanda. Ndenge Yisaya asakolaki yango, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali komata na “ngomba ya ndako ya Yehova.” (Yis. 2:2) Mpo na nini bazali komata na ngomba yango? Mpo báteyama na Yehova! (Yis. 2:3) Na 2010, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko na ndambo na mosala ya kopesa litatoli mpe koteya bato mateya ya solo ya Biblia. Longola yango, pɔsɔ na pɔsɔ, balandaka mateya oyo euti na Biblia na masangá koleka 105 000 na mokili mobimba; lisusu, moombo ya sembo mpe ya mayele abimisaka mikanda na minɔkɔ koleka 500 mpo na kosalisa bato báyekola Biblia.
3. Ndenge nini mateya ya Yehova esalisi yo?
3 Zwá matomba na yango: Mateya ya Yehova esalisi biso mingi mpenza! Toyekoli ete Nzambe azali na nkombo mpe akipaka biso. (Nz. 83:18; 1 Pe. 5:6, 7) Tozwi biyano na mituna mosusu ya ntina mingi na bomoi, na ndakisa: Mpo na nini bato bamonaka mpasi mpe bakufaka? Ndenge nini nakoki kozala na esengo ya solosolo? Ntina ya bomoi ezali nini? Yehova apesi mpe biso mibeko, oyo esalisaka biso ‘tólongisa nzela na biso.’—Yos. 1:8.
4. Tángá biteyelo mosusu oyo basaleli ya Nzambe bakoki kokɔta, mpe mpo na nini tosengeli koyekola nyonso oyo tokoki koyekola epai ya Yehova?
4 Longola yango, Yehova abongisi biteyelo ndenge na ndenge mpo na kosalisa basaleli na ye básala lisusu mingi na mosala na ye. Na lokasa 4 tii 6, tokomona liste ya biteyelo yango. Ata soki makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela te ya kokɔta na biteyelo mosusu oyo batángi, osalaka makasi ozwa mpenza matomba na mateya ya Nzambe oyo okoki kozwa? Na mokili, balakisi mpe bato mosusu balendisaka bilenge bátánga bakelasi milai. Tolendisaka bilenge na kati ya lisangá bámityela mikano ya elimo mpe bákɔta na biteyelo oyo Yehova abongisi, oyo eleki mpenza biteyelo ya mokili? Koyekola nyonso oyo tokoki koyekola epai ya Yehova ekosalisa biso tózala na bomoi ya esengo sikoyo mpe tózwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya.—Nz. 119:105; Yoa. 17:3.
Biteyelo mosusu ya ebongiseli ya Yehova oyo ndeko akoki kokɔta
Kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma
Ntina: Koteya bato ndenge ya kotánga mpe kokoma, mpo bango moko bákoka koyekola Biblia mpe báteya basusu mateya ya solo.
Boumeli: Na kotalela bosɛnga oyo ezali.
Esika: Na Ndako ya Bokonzi na bino.
Banani bakoki kokɔta: Basakoli nyonso to bato nyonso oyo basepelaka na mateya ya solo.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Bankulutu ya lisangá babongisaka bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma na kotalela bamposa ya lisangá, mpe balendisaka bato nyonso oyo bayebi kotánga te bákɔta na kelasi yango.
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Ntina: Kopesa basakoli formasyo mpo bázala bateyi mpe basakoli malamu ya nsango malamu.
Boumeli: Esilaka te.
Esika: Na Ndako ya Bokonzi na bino.
Banani bakoki kokomisa nkombo: Basakoli nyonso. Lisusu, bato mosusu oyo bayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá, oyo bandimaka mateya ya Biblia, mpe oyo bomoi na bango eyokani na mitinda ya Biblia.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Sololá na mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
Kelasi mpo na koyekola monɔkɔ ya bapaya
Ntina: Koteya basakoli ndenge ya kosakola nsango malamu na monɔkɔ mosusu.
Boumeli: Sanza minei to mitano. Mbala mingi, bakelasi yango esalemaka mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ na boumeli ya ngonga moko to mibale.
Esika: Mbala mingi, na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene.
Banani bakoki kokɔta: Basakoli oyo bazali na etamboli malamu, oyo balingi kosakola na monɔkɔ ya bapaya.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Biro ya filiale ebongisaka bakelasi yango soki mposa emonani.
Mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi
Ntina: Kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Yango ezali eteyelo te, kasi bandeko oyo basalaka mosala yango bayekolaka misala ndenge na ndenge mpo bákoka kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga.
Boumeli: Etaleli ndeko mokomoko oyo asalaka mosala ya kotonga.
Esika: Bisika nyonso oyo Komite ya etúká mpo na botongi to Biro oyo etalelaka misala ya botongi ezali kokɛngɛla mosala yango. Bakoki mpe kosɛnga bandeko oyo basalaka mosala ya kotonga bákende kosunga bandeko oyo bafandaka na bisika mosusu, oyo bakweli likama.
Masɛngami: Esengeli kozala ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azwá batisimo mpe oyo lisangani ya bankulutu endimi asala mosala yango, ezala ayebi mosala ya kotonga to te.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Sɛngá bankulutu ya lisangá na bino bápesa yo formilɛrɛ Construction des Salles du Royaume—Questionnaire pour les volontaires (S-82) mpe tondisá yango; to awa na Congo, tondisá formilɛrɛ Demande d’admission dans l’ordre international des serviteurs spéciaux à plein temps Témoins de Jéhovah en tant que serviteur à la construction de Salles du Royaume (A-12) oyo biro ya filiale epesaka.
Eteyelo ya babongisi-nzela
Ntina: Kosalisa babongisi-nzela ‘bákokisa mosala na bango malamumalamu.’—2 Tim. 4:5.
Boumeli: Pɔsɔ mibale.
Esika: Biro ya filiale eponaka esika oyo eteyelo yango ekosalema; mbala mingi na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene.
Masɛngami: Esengeli kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo akokisi ata mbula moko na mosala yango.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Biro ya filiale ekomisaka mbala moko nkombo ya babongisi-nzela oyo bakokisi masɛngami mpe mokɛngɛli ya zongazonga ayebisaka bango.
Eteyelo mpo na bandeko oyo bakɔti sika na Betele
Ntina: Eteyelo yango ebongisami mpo na kosalisa bandeko oyo bakɔti sika na Betele bákokisa mosala na bango malamu.
Boumeli: Ngonga moko na pɔsɔ, na boumeli ya pɔsɔ zomi na motoba.
Esika: Na Betele.
Masɛngami: Esengeli kozala ndeko ya libota ya Betele to ndeko oyo ayei kosala na Betele mpo na mwa ntango molai (mbula moko to koleka).
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Betele ekomisaka mbala moko nkombo ya bandeko ya libota ya Betele oyo bakokisi masɛngami.
Eteyelo ya mosala ya Bokonzi
Ntina: Kopesa bankulutu mpe basaleli na misala formasyo mpo bákokisa malamu mikumba na bango ya kokɛngɛla bampate mpe kotambwisa lisangá. (Mis. 20:28) Eteyelo yango esalemaka nsima ya mwa bambula, soki Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi yango.
Boumeli: Na bambula oyo, esalemaka mokolo moko na ndambo mpo na bankulutu, mpe mokolo moko mpo na basaleli na misala.
Esika: Mbala mingi, na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya Mayangani oyo ezali pene.
Masɛngami: Esengeli kozala nkulutu to mosaleli na misala.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Mokɛngɛli ya zongazonga abengisaka bankulutu mpe basaleli na misala oyo bakokisi masɛngami.
Eteyelo mpo na bankulutu ya masangáa
Ntina: Kosalisa bankulutu bákokisa malamu mikumba na bango na lisangá.
Boumeli: Mikolo mitano.
Esika: Biro ya filiale nde ekopona esika; mbala mingi, esalemaka na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya Mayangani oyo ezali pene.
Masɛngami: Esengeli kozala nkulutu.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Biro ya filiale nde ebengisaka bankulutu oyo bakokisi masɛngami.
Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ná basi na bangob
Ntina: Kosalisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe bakɛngɛli ya etúká bákokisa lisusu malamu mosala na bango ya kosalisa masangá; ‘básala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya’ mpe bábatela bampate oyo bazali kokamba.—1 Tim. 5:17; 1 Pe. 5:2, 3.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Biro ya filiale nde ekopona esika.
Masɛngami: Esengeli kozala mokɛngɛli ya zongazonga to mokɛngɛli ya etúká.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Biro ya filiale ebengisaka bakɛngɛli-batamboli oyo bakokisi masɛngami, ná basi na bango.
Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzembac
Ntina: Kopesa formasyo na bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali minzemba mpo bázwa mikumba mosusu. Bandeko mingi oyo bakɔtaka na eteyelo yango batindamaka mpo na kokende kosala esika mposa ezali mingi na ekólo na bango. Mwa ndambo na bango bakoki kotindama na ekólo mosusu soki bayebisi biro ya filiale ete bakoki kokende kosala na mboka-mopaya.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Biro ya filiale nde eponaka esika; mbala mingi, esalemaka na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya Mayangani oyo ezali pene.
Masɛngami: Bandeko mibali oyo bazali minzemba, oyo bazali na mbula kobanda 23 tii 62, oyo bazali nzoto makasi mpe balingi kosalela bandeko mpe kopesa mabɔkɔ mpo mosala ya kosakola ekende liboso esika nyonso oyo mposa ezali. (Mrk. 10:29, 30) Esengeli kozala bandeko oyo bakokisi mbula mibale to koleka banda bakómá bankulutu to basaleli na misala.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Soki eteyelo yango ezalaka na teritware ya filiale na bino, likita mpo na bandeko oyo balingaka kokɔta na eteyelo yango ekosalema na liyangani ya zongazonga. Na likita wana, bakoyebisa makambo mosusu oyo etali eteyelo yango.
Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalád
Ntina: Kopesa bandeko oyo babalá formasyo mpo Yehova mpe ebongiseli na ye básalela bango lisusu mingi. Bandeko mingi oyo bakɔtaka na eteyelo yango batindamaka mpo na kokende kosala esika mposa ezali mingi na ekólo na bango. Mwa ndambo na bango bakoki kotindama na ekólo mosusu soki bayebisi biro ya filiale ete bakoki kokende kosala na mboka-mopaya.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Bakelasi ya liboso ezali kosalema na Esika monene ya mateya ya Watchtower, oyo ezali na engumba Patterson, na etúká ya New York, na États-Unis. Na nsima, eteyelo yango ekobanda kosalema na bisika oyo babiro ya filiale ekopona, mbala mingi na Ndako ya Mayangani to na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene.
Masɛngami: Babalani oyo bazali na mbula kobanda 25 tii 50 mpe bazali nzoto makasi, oyo bazali na likoki ya kokende kosala esika nyonso oyo mposa ezali, mpe bakoki koloba lokola Yisaya ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Lisusu, basengeli kozala bandeko oyo bakokisi ata mbula mibale ya libala mpe oyo bazali na mosala ya ntango nyonso ata mbula mibale kozanga kokata.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Soki eteyelo yango ezalaka na teritware ya filiale na bino, likita mpo na bandeko oyo balingaka kokɔta na eteyelo yango ekosalema na liyangani ya mokolo moko. Na likita wana, bakoyebisa makambo mosusu oyo etali eteyelo yango.
Eteyelo ya Gileadi
Ntina: Kopesa formasyo na babongisi-nzela mpe bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mpo bákóma bamisionɛrɛ.
Boumeli: Sanza mitano.
Esika: Esika monene ya mateya ya Watchtower, oyo ezali na engumba Patterson, na etúká ya New York, na États-Unis.
Masɛngami: Babalani oyo bazwá batisimo esili koleka ata mbula misato mpe bazali na mbula kobanda 21 tii 38 ntango batondisi formilɛrɛ mpo na mbala ya liboso. Basengeli koyeba koloba Lingelesi, kokokisa ata mbula mibale ya libala, mpe kozala na mosala ya ntango nyonso ata mbula mibale kozanga kokata. Basengeli kozala nzoto makasi. Babongisi-nzela oyo bazali kosakola na mboka-mopaya (ezala baoyo bazali lokola bamisionɛrɛ); bakɛngɛli-batamboli; bandeko ya libota ya Betele; bandeko oyo bakɔtá na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba, mpe Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá, bakoki mpe kosɛnga ete bákɔta na Eteyelo ya Gileadi soki bakokisi masɛngami.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Na bafiliale oyo eponami, likita moko esalemaka na liyangani ya etúká mpo na bandeko oyo balingaka kokɔta na Eteyelo ya Gileadi. Na likita wana, bayebisaka makambo mosusu oyo etali eteyelo yango. Soki likita yango esalemaka te na mboka na bino mpe olingaka kokɔta na Eteyelo ya Gileadi, okoki kokomela biro ya filiale na bino mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali eteyelo yango.
Eteyelo mpo na bandeko ya komite ya filiale ná basi na bango
Ntina: Kosalisa bandeko oyo bazali kosala na komite ya filiale bátambwisa malamu misala na Betele, bátalela malamu makambo etali mosala ya kosakola mpe masangá, bákɛngɛla malamu bazongazonga mpe bitúká oyo ezali na teritware ya mboka na bango, bakisa mpe mosala ya kobongola mikanda, konyata yango, kotinda yango na masangá, mpe kokamba badepartema ndenge na ndenge.—Luka 12:48b.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Esika monene ya mateya ya Watchtower, oyo ezali na engumba Patterson, na etúká ya New York, na États-Unis.
Masɛngami: Bandeko oyo bazali na Komite ya filiale to na Komite ya ekólo, to mpe bandeko oyo baponami mpo na kokende kosala na Komite ya filiale nsima ya kolanda mateya na eteyelo yango.
Ndenge ya kosɛnga mpo na kokɔta: Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde ebengisaka bandeko oyo bakokisi masɛngami, elongo na basi na bango.
a Sikoyo eteyelo yango ebandi naino kosalema te na bikólo nyonso.
b Sikoyo eteyelo yango ebandi naino kosalema te na bikólo nyonso.
c Sikoyo eteyelo yango ebandi naino kosalema te na bikólo nyonso.
d Sikoyo eteyelo yango ebandi naino kosalema te na bikólo nyonso.