Eteyelo oyo bayekoli na yango bazali kosalisa bato na mokili mobimba
YEHOVA azali koteya bato ya lolenge nyonso na kati ya masangá koleka 98 000 ya Batatoli ya Yehova na mikili koleka 200. Mokanda ya libosoliboso oyo bayekolaka ezali Biblia, mpe mateya yango ezali kopesama mpo na kosalisa bato bákola na elimo wana bazali koyekola mokano ya Nzambe mpe ndenge ya kotosa mitinda na ye na bomoi na bango. Baoyo basalelaka makambo oyo bazali koyekola bazwaka matomba mingi. Nsima ya koyekola, bateyaka bato mosusu makambo yango na kolanda etinda ya Yesu Klisto ya kokómisa bato bayekoli.—Matai 28:19, 20.
Longola mateya oyo bazwaka na masangá, Batatoli ya Yehova bazali mpe na bibongiseli ndenge na ndenge mpo na koteyama. Moko na yango ezali Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Eteyelo yango ebandaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1987, na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Na kelasi ya liboso, mateya epesamaki na Lingelesi mpe bayekoli bazalaki 24. Lelo oyo, mateya ya eteyelo yango ezali kopesama na minɔkɔ 21 na mikili 43. Bankulutu mpe basaleli na misala ya mikili koleka 90 basili kolanda mateya na eteyelo yango. Nsima ya kolanda mateya na boumeli ya pɔsɔ mwambe, bandeko yango batindamaka na bisika oyo mposa ezali, ezala na mboka na bango moko to na mboka mopaya. Na nsuka ya mobu 2005, bandeko mibali koleka 22 000 basilaki kolanda mateya ya eteyelo yango. Yehova apamboli milende oyo bazali kosala na komikitisa nyonso mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso mpe mpo na kosalisa bandeko mosusu.—Masese 10:22; 1 Petelo 5:5.
Komibongisa mpo na kokɔta na eteyelo
Bandeko mibali mingi basɛngaka konje na mosala ntango babengi bango na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Likambo yango ezalaka mokakatano mpo na bandeko mosusu. Na Hawaii, bandeko mibale oyo bazali balakisi basengelaki kosɛnga konje mpo na kokende kolanda mateya na eteyelo yango. Batyelaki Yehova motema mpe basɛngaki konje, balimbolaki ntina oyo balingaki kokɔta na eteyelo yango mpe matomba oyo ekomemela bango. Bakonzi na bango bandimaki kopesa bango konje.
Bapatrɔ ya Batatoli mosusu oyo basɛngaki konje mpo na kokɔta na eteyelo bayebisaki bango ete bakobungisa esika na bango na mosala soki bakei. Atako bongo, bandeko baponaki kaka kolanda mateya ya ebongiseli ya Yehova. Nzokande, nsima ya kolanda mateya bandeko mosusu babengamaki mpo bázongela mosala na bango. Ekateli oyo bandeko bazalaki na yango mpo na kokende kolanda mateya ekoki kolobama na mokuse boye: sɛngá konje, bondelá Yehova, mpe tiká ye asala.—Nzembo 37:5.
‘Bateyami na Yehova’
Na mateya yango ya pɔsɔ mwambe, bayekolaka Biblia na mozindo. Bayekolaka ndenge oyo basaleli ya Yehova babongisami mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe ndenge ya kosalela Biblia malamumalamu na mosala ya kosakola, na makita ya lisangá, mpe na mayangani.
Ndeko moko oyo akɔtaki na eteyelo yango akomelaki moninga na ye oyo akɔtaki naino te boye: “Nakosi yo te, soki oyei, okomona ete yango ezali mateya oyo eleki mateya nyonso oyo olandá. Sikoyo nakómi na ndenge mosusu ya kotalela vɛrsɛ oyo elobeli ‘koteyama epai ya Yehova.’ Mateya yango nyonso ezali kobongisa motema mpe bomoto, kopɛtola yango mpe koyokanisa yango malamumalamu na ndakisa ya Yesu Klisto. Soki oyei, okozwa mateya oyo eleki mateya nyonso okoki kozwa na bomoi na yo.”—Yisaya 54:13, NW.
Basakoli, babateli ya mpate, mpe bateyi
Bandeko oyo basili kolanda mateya ya eteyelo yango bazali lelo oyo kosala na mikili 117. Na kati na yango ezali na bisanga ya Mbu ya Atlantique, ya Caraïbes, mikili ya Pasifike mpe na mikili mingi oyo ezali na bafiliale ya Batatoli ya Yehova. Balapolo ya bafiliale yango ezali komonisa ete formasyo malamu oyo bandeko yango bazwi na eteyelo ezali komonana na mosala ya kosakola, ya kobatela bampate, mpe ya koteya oyo bazali kosala. Formasyo yango ezali kosalisa bango báyeba kosalela Biblia malamumalamu na mosala ya kosakola. (2 Timote 2:15) Ntango bazali kopesa biyano epai ya bato oyo bakutani na bango na mosala ya kosakola, basalelaka mingi buku Comment raisonner à partir des Écrituresa mpe balakisaka basakoli mosusu básalaka mpe bongo. Bandeko na masangá bazali komekola molende na bango, mpe mosala na bango ezali kolendisa masangá.
Bankulutu bazali na mokumba ya ‘kobatela etonga,’ elingi koloba kosalisa bandeko bákokisa bamposa na bango ya elimo. (1 Petelo 5:2, 3) Nkulutu moko alobaki boye mpo na ebongiseli yango: “Tozali na botɔndi mingi na ndenge biro ya filiale etindeli biso bandeko oyo bazwi formasyo ya malamu mpo na kosalisa biso tókokisa mokumba ya kobatela bampate ya Nzambe.” Filiale moko na Extrême-Orient ekomaki boye: “Bandeko yango bazalaka mpenza na boboto. Basalaka mingi mpe bandeko bapesaka bango limemya. Elimo na bango ya komikitisa, ya boboto, mpe mpiko na bango eyebani mpe bandeko basepelaka na yango mingi. Bamipesaka na bolingo nyonso mpo na basusu mpe bandimaka kokende na masangá oyo ezali na mposa ya bakɛngɛli.” (Bafilipi 2:4) Mibali yango balendisaka baninga na bango bandimi mpe babongi kozwa longonya.—1 Bakolinti 16:18.
Balakisi na Eteyelo mpo na kobongisa basungi basalisaka mpe bayekoli bábongisa lisusu lolenge na bango ya kosala masukulu. Nsima ya kokɔta eteyelo yango, bandeko mingi oyo basalelaka makanisi mpe batoli oyo bazwaki na kelasi bakómaka kosala masukulu na mayangani ya zongazonga to ya etúká. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete bandeko yango basalaka “masukulu malamu mpe bamonisaka malamu ndenge ya kosalela mateya yango.”—1 Timote 4:13.
Ntango eteyelo esalemaki na ekólo moko ya Afrika mpe batindaki bayekoli na masangá ndenge na ndenge ya ekólo yango, lolenge ya koteya na makita ebongaki mpenza. Bankulutu oyo bakɔtaki na eteyelo yango bazali kosunga mpenza na mosala ya kosakola, ya kobatela bampate, mpe ya koteya; na ndenge yango bazali kolendisa masangá na elimo.—Baefese 4:8, 11, 12.
Mosala ya bakɛngɛli ekómi kosalema malamu koleka
Masangá mingi ezali na bankulutu mpe basaleli na misala moke mpenza. Soki Eteyelo mpo na kobongisa basungi etindelaki masangá mosusu bankulutu te, mbele elingaki kozala ata na nkulutu moko te. Yango wana, bandeko mingi oyo bakɔti na Eteyelo mpo na basungi bazali kotindama na bisika oyo mposa ezali.
Balapolo ya bafiliale mingi ezali komonisa ete mibali yango “bayebi malamu ndenge makambo esengeli kotambola na lisangá,” “bazali kokokisa mikumba na bango malamu,” “bazali kosalisa bandeko mosusu báyeba mpe bámemya ebongiseli ya Yehova,” mpe “bazali kolendisa esengo mpe elimo ya malamu na masangá.” Ezali kosalema bongo mpamba te bandeko yango balandaka toli ya Liloba ya Nzambe, batyaka motema na mayele na bango moko te, mpe bakómaka na bwanya na miso na bango moko te. (Masese 3:5-7) Mibali yango bazali mpenza lipamboli na masangá oyo batindi bango.
Kosala na bisika oyo basakoli bazali te
Bandeko mosusu oyo balandaka mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi batindamaka lokola babongisi-nzela monene mpo na kosalisa mwa bituluku ekóma masangá. Nkulutu moko oyo afandaka na mboka moko moke na Guatemala amonisaki botɔndi mpo na lisungi oyo bazwaki na maloba oyo: “Eumeli mbula 20, nazalaki mpenza komituna ndenge oyo tokolonga kopalanganisa nsango malamu na teritware monene oyo. Nazalaki kobondela mingi mpo na likambo yango. Bandeko oyo bakɔti na Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazwaka formasyo ya malamu mpo na koyeba koloba mpe kobongisa makambo, mpe nazali na botɔndi na komona ndenge oyo bazali kotyela teritware yango likebi.”
Bandeko yango basali makasi mpo na komesana kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo ezali kosɛnga bango bátambola bakilomɛtrɛ mingi mpe komata bangomba mpo na kosakola na bamboka ya mikemike. Soki bakómi kuna, nokinoki basalaka mwa bituluku mpe babongisaka yango, ata soki basakoli mosusu bakokaki kosala yango te. Na ndakisa, nkulutu moko na Niger asɛngaki ete bandeko mibali oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi báya kosalisa bango mpamba te amonaki ete bango bakoki kosala mosala malamu na teritware na bango. Mingimingi na bamboka ya mike, elekaka malamu ete bandeko mibali oyo bazali kosala lokola babongisi-nzela monene to bakɛngɛli ya zongazonga bázala minzemba. Mpamba te lokola ntoma Paulo, bakutanaka na ‘makama ya bibale mpe ya miyibi-na-nzela, makama na kati ya esobe,’ mikakatano ya bomoi, mpe bamitungisaka mingi mpo na bolamu ya masangá epai batindi bango.—2 Bakolinti 11:26-28.
Bilenge bazali kozwa matomba
Biblia ezali kolendisa bilenge bákanisa Mozalisi na bango. (Mosakoli 12:1) Bandeko oyo balandaka mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazalaka ndakisa malamu mpo na bilenge baklisto. Na États-Unis, ntango bandeko mibale oyo bakɔtaki eteyelo yango batindamaki na lisangá moko, motángo ya bangonga oyo basakoli ya lisangá yango bazalaki kolekisa na mosala ya kosakola emataki mbala mibale. Lisusu, babongisi-nzela ya sanza na sanza oyo bazalaki kaka mibale bakómaki 11. Likambo yango esalemaka na masangá mingi epai batindaka bandeko oyo bakɔti na Eteyelo mpo na kobongisa basungi.
Bandeko yango balendisaka mpe bilenge mibali bámityela mokano ya kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Yango elendisi bilenge mingi oyo bakómi naino basaleli na misala te básala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo na mokumba yango. Filiale ya Pays-Bas elobi ete bandeko oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali “bandakisa mpo na mibali oyo bazali kokanisa nini bakosala na bomoi na bango.”
Kosala na masangá ya minɔkɔ ya bapaya
Na mikili mosusu, bandeko mingi bazali kosala milende mpo na koyebisa bato nsango malamu na monɔkɔ ya mboka na bango. Mbala mingi, bandeko oyo bakɔtaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi bayekolaka monɔkɔ mosusu mpo na kosala na bateritware epai bato oyo balobaka monɔkɔ yango bazali mingi. Na ndakisa, na Belgique, mposa ya basakoli oyo bakoki kosakola na monɔkɔ ya Albanais, ya Persan, mpe ya Russe ezali makasi.
Na Grande-Brétagne, na Allemagne, na Italie, na Mexique, na États-Unis mpe na mikili mosusu, bakɛngɛli ya zongazonga, bankulutu, mpe basaleli na misala oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali kosalisa masangá mpe bituluku oyo esalaka makita na minɔkɔ ya bapaya. Filiale ya Corée elobi ete “bandeko mibali koleka 200 oyo balandaki mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali kopesa mpenza mabɔkɔ mpo na kosalisa masangá mpe bituluku oyo esalaka makita na minɔkɔ ya bapaya.”
Kopesa mabɔkɔ na mikumba mosusu
Longola kosala na masangá mpe bituluku oyo esalelaka minɔkɔ ya bapaya, bandeko oyo balandi mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi basalaka lokola bankulutu, basaleli na misala, mpe bakɛngɛli ya zongazonga. Bamosusu batindamaka na mikili mosusu, na ndakisa na filiale moko, mpo na kopesa mabɔkɔ na biro oyo etalelaka mosala ya kosakola. Baoyo bayebi mosala ya kotonga bandako bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi.
Lokola masangá ezali se kokóma mingi na mokili mobimba, mpe bazongazonga ezali se kobakisama, yango ezali mpe kosɛnga ete bakɛngɛli-batamboli bázala mingi. Mpo na yango, bandeko mosusu kati na baoyo balandaki mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi baponamaka mpo na kolanda formasyo ya pɔsɔ zomi na mosala ya zongazonga mpe na nsima basalelaka bango mpo básungaka bakɛngɛli ya zongazonga to mpe mpo bákóma bakɛngɛli ya zongazonga. Bandeko soki 1 300 oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali kosala lelo oyo lokola bakɛngɛli ya zongazonga na mikili 97. Na ekólo moko ya Afrika, bakɛngɛli ya zongazonga mingi (55 %) bazali bandeko oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Na ekólo mosusu ya Afrika, bakɛngɛli ya zongazonga oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali lisusu mingi koleka (70 %).
Na Australie, na Canada, na Mpoto, na Extrême-Orient mpe na États-Unis, bankama ya bandeko oyo bakɔtá Eteyelo mpo na kobongisa basungi batindami na mikili mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala. Na ndenge yango, eteyelo yango ezali kosalisa bato na mokili mobimba.
Yehova, na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto, abimisi basakoli, bakɛngɛli, bateyi, mpe bandeko mosusu oyo bazali kopesa mabɔkɔ mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso na mikolo oyo ya nsuka. Elikya ezali ete na mikolo ezali koya basaleli ya Nzambe bakobakisama lisusu mingi koleka? Ɛɛ! Yango wana, ebongiseli ya Yehova ezali na mposa mingi ya bandeko mibali oyo bazwá batisimo ete bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba minene. (Yisaya 60:22; 1 Timote 3:1, 13) Eteyelo mpo na kobongisa basungi ezali kopesa bankulutu mpe basaleli na misala libaku ya kokóma na makoki ya kokolisa mosala na bango mpe na ndenge yango, ezali komemela bango moko ná bandeko mosusu, na mokili mobimba, ebele ya matomba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 10]
Eteyelo mpo na kobongisa basungi ezali kosalisa mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso
[Bililingi na lokasa 13]
Ozali kokana kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe na nsima kosalisa basusu?