Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/11 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 11/11 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Desɛmbɛ

“Na ntembe te, yo mpe omonaka ete moto nyonso azalaka na mposa ya baninga. Ezaleli nini eleki ntina olingaka komona epai ya moninga? [Tiká ye apesa eyano.] Na lisolo oyo, talá ntina oyo tosengeli koponaka baninga na biso na likebi mpenza.” Pesá moto yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ, na nsima bótánga mpe bótalela elongo makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo moke ya liboso na lokasa 16. Tángá ata vɛrsɛ moko na bavɛrsɛ oyo batye wana. Pesá moto yango bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela eyano na motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Desɛmbɛ

“Osilá komituna mpo na nini makama lokola mipɛpɛ ya makasi, koningana ya mabele mpe mpela ekómi kobima mingi lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Tosengeli koyeba ete Biblia esakolaki eleko moko oyo makama yango ekozala mingi. [Tángá Matai 24:7, 8.] Zulunalo oyo ezali kopesa biyano na mituna oyo: Mpo na nini lelo oyo tozali komona makama ebele lokola mipɛpɛ ya makasi, koningana ya mabele mpe mpela? Ezali nde etumbu euti na Nzambe? Makambo nini etindi biso tóndima ete mosika te Nzambe akotya nsuka na makama nyonso?”

Lamuká! Desɛmbɛ

Tángá 2 Timote 3:16. Na nsima lobá boye: “Bato mingi bandimaka ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, kasi bato mosusu bandimaka yango te. Yo okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Atako bato bazalaka na makanisi ekeseni na likambo yango, mingi bandimaka ete ezali na buku mosusu te oyo baluká kosala nyonso mpo na kolimwisa yango. Zulunalo oyo elobi ete, na boumeli ya bambula ebele, milende mingi esalemaki mpo na kolimwisa Biblia mpe mpo bato bátánga yango te. Elimboli mpe ntina oyo Biblia eumeli tii lelo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto