Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Desɛmbɛ
“Na eleko oyo ya mbula, bato mingi bazali kokanisa na ntina ya Yesu. Mpo na yo, likambo nini eleki monene na makambo nyonso oyo Yesu asalaki? [Tiká ye apesa eyano.] Talá moto ya likambo oyo ezali na lokasa 16.” Pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya moko ya mituna mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Tikelá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna mosusu.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Desɛmbɛ
“Na eleko oyo, bato mingi bazali na kati ya loyenge mpo na oyo etali Noele. Mpo na yo, na makambo oyo omoni awa, nini etindaka mpenza bato básala fɛti ya Noele? [Lakisá ye makambo oyo ezali na lokasa 3 mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, fungolá lokasa epai likambo oyo aponi ezali mpe bótánga vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo.] Zulunalo oyo elobeli makambo ndenge na ndenge oyo tokoki kosala mpo na kokanisa Yesu na boumeli ya mbula mobimba, na esika ya kokanisa ye kaka na eleko ya Noele.”
Lamuká! Desɛmbɛ
“Tozali kotala bato epai na bango mpo bato mingi bazali na mpasi. Omonaka ete lelo oyo bato mingi bakómi motema mokuse? [Tiká ye apesá eyano.] Bato mosusu bakanisaka ete tozali kobika na eleko ya mpasi ndenge Biblia esakolaki yango na 2 Timote 3:1. [Tángá] Zulunalo oyo elimboli likama ya kozala motema mokuse mpe epesi makanisi mpo na kokóma mpenza na motema molai.”