Lolenge malamu ya kosepela na nzembo ya Bokonzi
Basaleli ya Nzambe batalelaka miziki lokola likabo kitoko oyo euti na Yehova. (Yak. 1:17) Na masangá mingi, bandeko basepelaka koyoka nzembo ya Bokonzi oyo ezali kobɛta makasi mingi te liboso mpe nsima ya makita. Kobɛta nzembo ya Bokonzi ezali lolenge malamu ya kobanda makita na biso. Esalisaka biso tóbongisa makanisi na biso mpo na losambo. Lisusu, kobɛta nzembo ya sika oyo ezali na buku na biso ya nzembo esalisaka biso tómesana na nzembo yango mpe tóyemba yango na ndenge ebongi. Kobɛta miziki ya ndenge wana nsima ya makita ebakiselaka biso esengo wana tozali kolendisana na bandeko. Yango wana, masangani ya bankulutu esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo ete miziki na biso Tóyembela Yehova—Na piano ebɛtaka liboso mpe nsima ya makita. Bankulutu basengeli kosɛnzɛla ete miziki yango ebɛta makasi mingi te mpe epekisa bayangi kosolola te.