Batatoli ya Yehova—Kondima na bango emonani na misala, Eteni 1: Babimi na molili
Na Biblia, liloba pole emonisaka solo mpe molili emonisaka lokuta. (Nz. 43:3; Yis. 5:20) Satana akɔtisaki molili na mokili ntango akosaki Eva mpe nsukansuka, akɔtisaki mokili mobimba na molili. Em. 12:9 Video oyo ezali na motó ya likambo: Les Témoins de Jéhovah—La foi en action, 1re partie : la sortie des ténèbres (Batatoli ya Yehova—Kondima na bango emonani na misala, Eteni 1: Babimi na molili) emonisi ndenge pole ya elimo ebimaki na kati ya molili. (Yis. 60:1, 2) Nsima ya kotala video yango, talá soki okoki koyanola na mituna oyo:
(1) Ndenge nini molili makasi ekɔtaki nsima ya liwa ya bantoma? (2) Kobanda na bambula 1100, makambo nini esalisaki bato bámona ete mangomba etikaki koteya solo? (3) Henry Grew mpe George Storrs bazalaki banani? (4) Makambo nini Charles Russell akutanaki na yango oyo etungisaki ye mingi? (5) Ndenge nini Ndeko Russell mpe tata na ye ná baninga mosusu bazalaki koyekola Biblia, mpe mateya nini basosolaki na boyekoli na bango? (6) Mpo na nini etuluku yango ya bayekoli ya Biblia basanganaki na etuluku ya Nelson Barbour, kasi nini etindaki Ndeko Russell amilongola? (7) Na Yuli 1879, likambo nini esalemaki oyo esalaki ete pole ya elimo ebanda kongɛnga makasi? (8) Nsima na yango, Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki se kobakisama basalaki nini mpo na kopalanganisa nsango malamu? (9) Bambula mingi liboso, Bayekoli ya Biblia bayebaki ete likambo nini ekosalema na mobu 1914? (10) Nsima ya liwa ya Ndeko Russell, Bayekoli ya Biblia bakutanaki na mikakatano nini? (11) Bayekoli ya Biblia basalaki nini nsima wana Ndeko Rutherford mpe baninga na ye babimaki na bolɔkɔ? (12) Ndenge nini kotala video oyo ebakisi botɔndi na yo mpo na ebongiseli ya Yehova? (13) Ndenge nini video oyo elendisi ekateli na yo ya kokoba kosakola na molende atako mikakatano ezali? (14) Ndenge nini tokoki kosalela video oyo mpo na kosalisa bandeko na biso ya libota, bato oyo toyekolaka na bango Biblia mpe bato mosusu?
Bayekoli wana ya Biblia ya ebandeli batikelá biso mpenza libula moko monene! Na mokili oyo etondi na molili, bazalaki bamemi-pole ya mpiko mpe ya molende. Tiká ete tómekola ndakisa na bango mpe ‘tókoba kotambola lokola bana ya pole.’—Ef. 5:8.