Batatoli ya Yehova—Kondima na bango emonani na misala, Eteni 2: Pole engɛnga!
Ntango Ndeko Rutherford mpe baninga na ye babimaki na bolɔkɔ na mobu 1919, mosala monene ezalaki kozela Bayekoli ya Biblia. Ndenge emonisami na video Les Témoins de Jéhovah—La foi en action, 2e partie : Que brille la lumière ! (Batatoli ya Yehova—Kondima na bango emonani na misala, Eteni 2: Pole engɛnga!), Bayekoli ya Biblia bakutanaki na botɛmɛli mingi, bososoli na bango ya Biblia ebakisamaki, mpe kondima na bango ekómaki makasi. (Mas. 4:18; Mal. 3:1-3; Yoa. 15:20) Nsima ya kotala video yango, okoki koyanola na mituna oyo elandi?
(1) Bayekoli ya Biblia basalaki nini mpo na kopalanganisa nsango malamu? (2) Makambo nini esalemaki na mayangani ya ntina mingi ya mobu 1931 mpe 1935? (3) Likambo nini ya ntina mingi elobelamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1939? (4) Lobelá likambo oyo esalemaki na Madison Square Garden ntango Ndeko Rutherford asalaki diskur na motó ya likambo “Boyangeli mpe kimya.” (5) Makambo nini ya ntina mingi Ndeko Knorr alobelaki na diskur na ye oyo elobaki “Kimya—Ekoki koumela?” (6) Bibongiseli nini Batatoli ya Yehova babandisaki na 1942 mpo na kokolisa mosala na bango ya kosakola? (7) Lobelá ndenge Batatoli ya Yehova balongaki na batribinale na États-Unis, na Canada, mpe na Grèce. (8) Ndenge nini eteyelo ya Gileade esalisi na kopalanganisa nsango malamu? (9) Mosala nini ya ntina mingi ebandaki na mobu 1946, mpe mpo na nini? (10) Batatoli ya Yehova basalaki nini mpo na koyokanisa mpenza bomoi na bango na mitinda ya Biblia? (11) Lobelá mbongwana oyo esalemaki na ebongiseli na bambula ya 1970, mpo na koyokanisa yango na ndenge oyo Biblia emonisi. (12) Ndenge nini kotala video yango endimisi yo mpenza ete ebongiseli oyo ezali ya Yehova mpe ye moko nde azali kotambwisa makambo nyonso? (13) Ndenge nini video yango elendisi yo mpenza okoba kosakola na molende atako mikakatano ezali? (14) Ndenge nini tokoki kosalela video yango mpo na kosalisa bandeko na biso ya libota, bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu?
Na lisolo ya ebongiseli ya Batatoli ya Yehova makambo ya sika ebakisamaka mokolo na mokolo. Na makambo yango, bakolobela mpe milende na biso? Ndenge bandeko na biso basalaki, tiká ete biso mpe tókoba ‘kongɛngisa pole’ na molende nyonso!—2 Ko. 4:6.