“Likambo ya komikumisa” nini ozalaka na yango?
1. Likambo nini etindaka biso tósepela na nsuka ya sanza nyonso?
1 Na nsuka ya sanza nyonso, basɛngaka biso tópesa lapolo ya mosala ya kosakola; “likambo ya komikumisa” nini ozalaka na yango? (Gal. 6:4) Ezala tozali babongisi-nzela monene oyo bapesaka ngonga 130, to basakoli oyo bapesá bango ndingisa ya kopesa ata miniti 15, biso nyonso tosengeli kosepela mpo na mosala oyo tosaleli Yehova na molimo na biso mobimba.—Nz. 100:2.
2. Mpo na nini tosengeli komipesa mpenza na mosala ya Yehova?
2 Lokola Yehova azali Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, abongi tópesa ye biloko na biso oyo eleki malamu. (Mal. 1:6) Lokola tolingaka ye, topesá bomoi na biso mpo na kosala mokano na ye. Yango wana na nsuka ya mokolo to ya sanza, soki tondimisami mpenza ete topesaki Yehova “mbuma ya liboso,” elingi koloba biloko na biso oyo eleki malamu, na ndakisa ntango na biso, mayele na biso, mpe makasi na biso na mosala na ye, tokoki kozala na likambo ya komikumisa na yango. (Mas. 3:9) Nzokande, soki lisosoli na biso ezali komonisa biso ete tokoki kosala koleka, tosengeli kotalela nini tokoki kosala mpo na kobongisa.—Rom. 2:15.
3. Mpo na nini komikokanisa na basusu ezali likambo ya bwanya te?
3 “Komikokanisa na moto mosusu te”: Kokokanisa mosala na biso na oyo ya moto mosusu to na oyo tosalaki ntango tozalaki makasi, ezali likambo ya bwanya te. Makambo ebongwanaka, mpe bato nyonso bazalaka na makoki to makasi ndenge moko te. Mbala mingi, komikokanisa na basusu ebimisaka kowelana to etindaka moto amimona ete azali na ntina te. (Gal. 5:26; 6:4) Yesu azalaki te komikokanisa na bato to kokokanisa bato na basusu. Kutu azalaki kopesa longonya na kotalela oyo moto akokaki kosala.—Mrk. 14:6-9.
4. Mateya nini tokoki kozwa na lisese ya batalanta oyo Yesu apesaki?
4 Na lisese oyo Yesu apesaki ya basali oyo bazwaki batalanta, moto na moto azwaki “na kotalela likoki na ye mpenza.” (Mat. 25:15) Ntango nkolo azongaki mpe asɛngaki bápesa ye lapolo ya mosala na bango, baoyo basalaki na molende mpenza na kotalela makoki na bango mpe makambo ya bomoi na bango bazwaki longonya mpe bakɔtaki na esengo ya nkolo na bango. (Mat. 25:21, 23) Wana biso mpe tozali kokoba kosakola nsango ya Bokonzi, tokoki kotya motema ete Nzambe akondima biso mpe tokozala na likambo ya komikumisa na yango!