Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/12 nk. 2-3
  • Salisá bato báyoka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bato báyoka Nzambe
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela mwa buku Yoká Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mwa babúku: bisaleli ya motuya mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 7/12 nk. 2-3

Salisá bato báyoka Nzambe

1. Mwa babuku nini tozwaki na liyangani ya etúká “Tiká ‘Bokonzi ya Nzambe eyá!,’” mpe nini esali ete ezala bisaleli ya ntina mingi?

1 Na liyangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo “Tiká ‘Bokonzi ya Nzambe eya!,’” tozwaki mwa babuku mibale ya sika: Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko mpe mosusu ya pɛtɛɛ Yoká Nzambe. Lokola mwa babuku yango ezali na maloba mingi te, kobongola yango ezali pɛtɛɛ mpe ekoki kozwa ntango mingi te. Kutu, ntango mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ebimaki na Lingelesi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete ebongolama mpe na minɔkɔ mosusu 431.

2. Banani bakozwa matomba na mwa babuku yango?

2 Banani mpenza bakozwa matomba na mwa babuku yango? Tótalela makambo oyo elandi, oyo esalemaka na bisika mingi na mokili mobimba:

• Mosakoli moko azali kosolola na moto, ezala na mbala ya liboso to ntango azongeli ye, amoni ete moto yango ayebi kotánga te to ayebi kotánga malamu te.

• Mosakoli azali kosakwela bato oyo bazali koloba monɔkɔ oyo mikanda na biso ebongolamá mingi te to mpe ebongolamá te. To bato mingi ya teritware bayebi te kotánga monɔkɔ oyo balobaka malamu.

• Mosakoli azali kosalela elobeli ya bababa mpo na kosakwela bababa ya teritware.

• Moboti moko azali na mposa ya koteya solo na mwana na ye ya moke oyo ayebi naino kotánga te.

3. Ndenge nini mwa buku Yoká Nzambe ebongisami?

3 Ndenge mwa babuku yango ebongisami: Yoká Nzambe ezali na maloba mingi te​—kaka fraze moko mpe vɛrsɛ oyo etyami na nse ya lokasa, oyo esimbi makanisi ya ntina. Mpo nani? Kanisá ete moto moko apesi yo mwa buku moko oyo ekomami na monɔkɔ oyo okokoka kotánga te, ntango mosusu ekomeli na yango oyebi te. Okosepela na yango ata soki ezali na bililingi ya kitoko? Bato mingi bakosepela na yango te. Ndenge moko mpe, bato oyo bayebi kotánga malamu te babangaka mikanda oyo ezali na makomi ebele. Yango wana, na lokasa mokomoko bililingi ezwi esika monene mpe ekabolami malamu, mpo na kosolola na moto na elilingi moko nsima ya mosusu.

4. Ndenge nini mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ebongisami?

4 Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ezali na bililingi ndenge moko na Yoká Nzambe. Ebongisami mpo na koyekola na bato oyo bayebi kotánga malamu te to oyo bazali koyekola kotánga. Mosakoli oyo azali koyekola na moto na Yoká Nzambe akoki kosalela Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Liteya mokomoko ezali motuna mpe etyami na likoló na ngambo ya lobɔkɔ ya mwasi mpe ezwi nkasa mibale; eyano na motuna yango epesami na nkasa yango. Ezali mpe na mwa maloba mpe bavɛrsɛ oyo ezali kolimbola bililingi. Na nse ya nkasa mingi, okokuta etanda oyo ezali na langi mosusu mpe makambo mosusu ná bavɛrsɛ oyo bokoki kolobela yango na kotalela makoki ya moyekoli.

5. Ntango nini mpe ndenge nini tokoki kokabola mwa babuku yango?

5 Ndenge ya kosalela mwa babuku yango: Na mosala ya ndako na ndako, okoki kopesa moto moko ya mwa babuku yango, soki omoni ete ekosalisa ye, ata soki na sanza wana tozali kokabola mwa babuku te. (Talá etanda “Ndenge oyo tokoki kokabola yango.”) Ntango ozongeli moto oyo asepelaki, okoki koyebisa ye ete ozali na eloko moko ya kolakisa ye mpe pesá ye mwa buku yango mbala moko.

6. Ndenge nini tokosalela mwa babuku yango ntango tozali koyekola na moto Biblia?

6 Lokola Yoká Nzambe ezali na mituna oyo ekomami te, lisolo ekozala mituna mpe biyano te ndenge esalemaka na buku Biblia eteyaka. Na bisika mingi bato basepelaka koyoka masolo. Na yango, salelá bililingi mpo na koyebisa ye masolo oyo ezali na Biblia. Zalá na esengo ntango ozali kolimbola bililingi yango. Sɛngá moyekoli aloba makambo oyo azali komona mpe kokanisa. Tángá bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya lokasa, mpe sɛngá ye apesa makanisi. Tuná ye mwa mituna mpo apesa makanisi na ye mpo oyeba soki akangi ntina. Soki azali kosalela Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, bótánga elongo maloba mpe bavɛrsɛ oyo eyokani na elilingi mokomoko ntango bozali kotalela elilingi yango.

7. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia mpo akende liboso?

7 Salisá moyekoli akende liboso: Na ntembe te, lisolo na bino ekotinda moyekoli akóma na mposa ya koyeba kotánga mpo ye moko azala na likoki ya koyekola koyeba Yehova. (Mat. 5:3; Yoa. 17:3) Yango wana, soki bozali kosolola na mwa buku Yoká Nzambe, okoki kotalela soki okoki kosalisa ye ayeba kotánga, mpe na sima kobanda koyekola na ye na mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Ezala mwa buku nini bozali kosalela na kati ya mwa babuku yango mibale, moyekoli akozwa batisimo mbala moko te soki bosilisi mwa buku yango. Osengeli koyekola na ye mpe buku Biblia eteyaka to buku mosusu oyo ebongi, oyo ekosalisa ye ayeba mpenza malamu mateya ya Biblia.

8. Mpo na nini ozali na botɔndi mpo na bisaleli yango ya sika mpo na mosala ya kosakola?

8 Esengeli bato báyoka Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba mpo bázwa bomoi ya seko. (Yis. 55:3) Mpe mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso,” ezala mpe baoyo bayebi kotánga te, bayekola ndenge ya koyoka Nzambe. (1 Tim. 2:3, 4) Tozali mpenza na botɔndi mpo na bisaleli wana ya sika oyo tokoki kosalela mpo na koteya bato ndenge oyo bakoki koyoka Nzambe!

[Etanda na lokasa 3]

Ndenge oyo tokoki kokabola yango

Lakisá moto lokasa 2 mpe 3, mpe lobá boye: “Okosepela kofanda na mokili lokola oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia [to, buku mosantu oyo] elaki ete etikali moke Nzambe asala mokili moko ya kitoko, esika ya kimya epai mobola to moto ya maladi akozala te. Talá oyo tosengeli kosala mpo tózala kuna. [Tángá Yisaya 55:3, oyo ezali na likoló ya lokasa 3.] Yango eyebisi biso ete ‘tókende’ epai ya Nzambe mpe ‘tóyoka’ ye. Kasi ndenge nini toyokaka Nzambe?” Fungolá na lokasa 4 mpe 5 mpo bótalela eyano elongo. Soki azali na ntango te, tikelá ye mwa buku mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela eyano yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto