“Bózala na kimya na bato nyonso”
1. Toli nini ya Biblia tosengeli kosalela soki moto asiliki mpo toyei epai na ye?
1 Biso Batatoli ya Yehova tolingaka kimya, mpe tosakolaka nsango ya kimya. (Yis. 52:7) Kasi na ntango mosusu, bato basilikaka mpo toyei epai na bango. Nini ekosalisa biso tóbatela kimya ntango tokutani na likambo ya ndenge wana?—Rom. 12:18.
2. Mpo na nini ezali na ntina tózala na mayele ya kososola?
2 Tózala na mayele ya kososola: Atako bato mosusu basilikaka mpo batɛmɛlaka solo, kasi basusu bakoki kosilika mpo na makambo mosusu. Ekoki kozala ete toyei epai na bango na ntango oyo ebongi te. Moto akoki kosilika mpo na mikakatano na ye moko. Ata soki asiliki mpo na nsango malamu, tosengeli kobosana te ete asali bongo mpo mbala mosusu akosamá. (2 Ko. 4:4) Kozala na mayele ya kososola ekosalisa biso tóbatela kimya mpe tómona ete asilikeli biso te.—Mas. 19:11.
3. Ndenge nini tokoki komonisela moto oyo tokei kotala limemya?
3 Tómonisaka limemya: Bato mingi bazali na bindimeli oyo epikamá makasi. (2 Ko. 10:4) Bazali na lotomo ya kopona koyoka to koboya nsango oyo tomemeli bango. Tosengeli ata moke te komonisa moto ete biso toyebi Biblia malamu koleka ye. Soki basɛngi biso tókende, tosengeli kokende na limemya nyonso.
4. Kozala na maloba ya kitoko elimboli nini?
4 Tózalaka na maloba ya kitoko: Ata soki moto akateli biso lingala, tosengeli kozongisela ye maloba ya kitoko. (Kol. 4:6; 1 Pe. 2:23) Na esika ya kobendana na ye na maloba, tóluka koloba likambo moko oyo ye ná biso tondimaka. Mbala mosusu, tokoki kotuna ye na boboto mpo na nini aboyi. Nzokande, mpo tóboya kopesa ye lisusu nkanda, ntango mosusu ekozala malamu koleka tókata lisolo.—Mas. 9:7; 17:14.
5. Kozala bato ya kimya na mosala ya kosakola ebimisaka matomba nini?
5 Soki tozali bato ya kimya, mbala mosusu yango ekosala ete moto yango andima litatoli na mbala ya nsima oyo basakoli bakoleka epai na ye. (Rom. 12:20, 21) Ata soki emonani ete aboyi mpenza, mokolo mosusu akoki kokóma ndeko na biso. (Gal. 1:13, 14) Ezala moto asepeli na solo to te, soki tomipekisi mpe tomonisi ete tozali bato ya kimya, tokokumisa Yehova mpe tokokómisa mateya na biso kitoko.—2 Ko. 6:3.