Nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli
ZULUNALO oyo ozali kotánga, ezali nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli. Tolingi koyebisa mwa makambo oyo ezali na zulunalo yango.
Nimero ya boyekoli ekobanda kobima mpo na Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Biblia oyo bakoli na elimo. Ekobanda kobima mbala moko na sanza mpe ekozala na masolo ya boyekoli minei to mitano. Programɛ ya boyekoli ya masolo yango ekobanda kozala na lokasa ya liboso ya zulunalo yango. Na bokeseni na nimero ya bato nyonso, oyo ya boyekoli ekozala na elilingi kaka moko na lokasa ya ebandeli; mpamba te tokokabola yango na mosala ya kosakola te.
Na lokasa ya mibale, tokomona balobeli na mokuse mokano ya masolo ya boyekoli, mokomoko to masolo mingi esika moko; ekozala mpe na mitó ya makambo ya masolo mosusu. Yango ekosalisa mpenza batambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bámibongisaka malamu liboso ya kotambwisa boyekoli.
Okomona ete sikoyo masolo ya boyekoli ekómi mwa mokuse. Yango ekotikela biso ntango mingi mpo na kotalelaka bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo yango. Tolendisi bino bótalelaka bavɛrsɛ nyonso oyo maloba na yango etyami te na kati ya lisolo. Ntango bozali koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá, bosengeli kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo bakomi “tángá” liboso na yango mpe kolimbola yango. Soki ntango ezali, bosengeli mpe kotánga bavɛrsɛ mosusu. Na masolo mosusu, okoki kokuta bavɛrsɛ oyo bakomi “talá mpe” liboso na yango. Lokola bavɛrsɛ yango ezali kolimbola mbala moko te makanisi ya ntina oyo ezali na kati ya paragrafe, tokobanda kotánga yango mpenza te na makita. Nzokande, bavɛrsɛ yango ezali mpe na makanisi mosusu ya ntina to mpe ekoki kozala na mwa boyokani na likambo oyo tozali kolobela. Tolendisi yo otángaka yango ntango ozali kobongisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ntango mosusu okosalela yango na biyano oyo okopesa.
Lapolo ya mosala mpo na mbula mobimba ekobanda lisusu kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli te. Kobanda na mobu 2008, ekobanda kobima na Mosala na biso ya Bokonzi mpe na Annuaire des Témoins de Jéhovah. Nzokande, ndenge tolobaki na ebandeli, Nimero ya boyekoli ekozala mpe na masolo mosusu. Atako tokotalela mingi kati na yango na makita te, tolendisi bino bótángaka yango na likebi nyonso. Yango mpe ezali na bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso.—Mat. 24:45-47.
Likambo ya nsuka, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli mpe oyo ya bato nyonso ezali te bazulunalo mibale ekeseni. Yango nyonso mibale ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Na lokasa ya mibale ya yango nyonso mibale, ezali na paragrafe moko oyo elobeli ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nyonso mibale ekobanda kotyama na volimi relye moko. Makambo oyo tokobanda kolobela na lisolo “ozali koyeba lisusu?” ekobanda kouta na kati na yango nyonso mibale.
Banda 1879, ezala na ntango ya bitumba, ya mpasi mpe ya minyoko, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kokoba kosakola, kozanga kotika, solo ya Bokonzi ya Nzambe. Tozali kosɛnga Yehova apambola ebongiseli oyo ya sika mpo ekoba kosala kaka bongo. Mpe tozali kobondela Yehova apambola yo, motángi, ete ozwa matomba na nimero ya sika ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.