Salelá site Internet na biso na mosala ya kosakola
Tólendisa bato básalela yango: Bato mosusu oyo bakakatanaka kosolola na biso to kozwa mikanda na biso, bandimaka kokɔta na ndenge na bango moko na jw.org mpo na koluka koyeba malamu Batatoli ya Yehova. Na yango soki ebongi, yebisá bato ete tozali na site Internet.
Koyanola mituna: Ntango mosusu moto oyo tozali kosolola na ye, to moto oyo asepeli na nsango malamu, to mpe moto oyo toyebani na ye akoki kotuna biso motuna etali Batatoli ya Yehova to bindimeli na biso. Salelá mbala moko telefone to ordinatɛrɛ mpo na kopesa ye eyano. Mbala mingi, ezalaka malamu koleka kotánga bavɛrsɛ mbala moko na Biblia. Soki ozali na ordinatɛrɛ to telefone te mpo na kokɔta mbala moko na Internet, lakisá ye ndenge akoki kosalela jw.org mpo ye moko azwa eyano.—Kende na “Mateya ya Biblia/Biyano na mituna ya Biblia” to “Makambo etali biso/Mituna oyo bato batunaka mingi.”
Kotindela moto oyo oyebi lisolo, zulunalo to buku: Okoki kotindela moto PDF to EPUB na e-mail. To, okoki kozwa lisolo moko oyo batángi kotánga, mpe kotya yango na CD. Mbala nyonso oyo otindeli moto oyo azwi naino batisimo te buku, to mwa buku to zulunalo na mobimba na yango na Internet, okoki kokoma yango na lapolo na yo. Soki otindeli moto eloko, monisá ete yo nde otindi yango, mpe ezala mingi koleka te. Osengeli mpe te kozwa makambo na jw.org mpe kotinda yango na site Internet mosusu.—Kende na esika bakomi “Mikanda.”
Lakisá bansango ya sika etali Batatoli ya Yehova: Yango ekosalisa bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo tozongelaka bámona ndenge mosala na biso epalangani na mokili mobimba mpe básepela na bomoko na biso. (Nz. 133:1)—Kende na esika bakomi “Bansango.”
[[Etanda na lokasa 5]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Meká kosalela yango
1 Kɔtá na esika bakomi “Mikanda,” poná eloko oyo olingi kozwa, mpe finá butɔ na esika ya kotánga to ya koyoka.
2 Finá esika bakomi “MP3” mpo omona liste ya lisolo mokomoko. Poná lisolo oyo olingi kozwa to koyoka na Internet.
3 Soki olingi kozwa mokanda moko na monɔkɔ mosusu, poná ▸ monɔkɔ yango na esika bakomi “Bimisá.”