‘Tópesaka litatoli malamumalamu’
1. Ndakisa nini ya malamu ntoma Paulo apesaki na mosala ya kosakola?
1 “Kokisá mosala na yo malamumalamu.” (2 Tim. 4:5) Ntoma Paulo azalaki mpenza na elobeli ya polele mpe na bosembo ntango apesaki Timote toli wana. Kutu, kobanda mobu 47 tii 56, Paulo asalaki mibembo misato na mosala ya misionɛrɛ. Mokanda ya Misala elobi mbala na mbala ete Paulo apesaki “litatoli malamumalamu.” (Mis. 23:11; 28:23) Ndenge nini biso mpe tokoki kosala bongo lelo oyo?
2. Ndenge nini tokoki kopesa litatoli malamumalamu ntango tozali kosakola ndako na ndako?
2 Ndako na ndako: Mpo na kokutana na bato oyo bayoká naino nsango malamu te, tokoki kokende kotala bango na bangonga ekeseni. Mbala mosusu tata ya libota akoki kozala na ndako na bampokwa to mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Tosengeli kosala makasi tósolola na moto nyonso na ndako mokomoko, kozonga mbala na mbala na bandako oyo tokutaki bato te. Bongo soki milende na yo ezali kobota mbuma te? Ntango mosusu, kokomela moto yango mokanda, to kobenga ye na telefone ekoki kobota mbuma.
3. Mabaku nini ozalaka na yango ya kopesa litatoli na bisika ya bato mingi mpe na libaku malamu?
3 Na bisika ya bato mingi mpe na libaku malamu: Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali komonisa “bwanya ya solosolo” epai ya moto nyonso oyo alingi koyoka. Ntango mosusu, basalaka yango na “balabala” to na “bisika minene ya bato nyonso.” (Mas. 1:20, 21) Ntango tosalaka misala na biso ya mokolo na mokolo, tokanisaka mpe kopesa litatoli? Bakoki mpe koloba mpo na biso ete ‘tomipesaka mingi na mosala oyo etali liloba’? (Mis. 18:5) Soki bongo, tozali kokokisa mokumba na biso ya “kopesa litatoli malamumalamu.”—Mis. 10:42; 17:17; 20:20, 21, 24.
4. Ndenge nini kobondela mpe komanyola esalisaka biso tópesa litatoli malamumalamu?
4 Ntango mosusu makambo lokola kobanga bato, kozala na elobeli ya polele te, to kozala nsɔninsɔni ekoki kopekisa biso tópesa litatoli. Tóyeba ete Yehova ayebi bolɛmbu na biso. (Nz. 103:14) Atako bongo, soki makambo ya ndenge wana ekómeli biso, tokoki kobondela Yehova apesa biso mpiko ya koloba. (Mis. 4:29, 31) Longola yango, ntango tozali koyekola biso moko Liloba ya Nzambe mpe komanyola, tosengeli kosala makasi ya komona motuya monene ya nsango malamu. (Flp. 3:8) Kosala bongo, ekotinda biso tósakola nsango malamu na molende!
5. Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli ya Yoele?
5 Esakweli ya Yoele elobaki ete liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova, basaleli ya Nzambe bakokende se liboso mpe bakotika eloko moko te epekisa bango kosakola. (Yoe. 2:2, 7-9) Tiká ete tósala nyonso oyo tokoki na mosala ya kopesa litatoli, mosala oyo ekozongelama lisusu te!