Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/13 lok. 3
  • Saleláká bavideo ntango ozali koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Saleláká bavideo ntango ozali koteya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Salelá bavideo mpo na koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalela bavideo mpo na koteya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Maloba na nsuka ya lisolo
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 5/13 lok. 3

Saleláká bavideo ntango ozali koteya

Ntango Yehova ayebisaki Abrahama mpe Yirimia makambo ya ntina, asukaki kaka te na koloba na monɔkɔ, kasi alakisaki mpe bango makambo yango. (Eba. 15:5; Yir. 18:1-6) Tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpe bázwela yango litomba soki tozali kosalela biloko ya kolakisa, na ndakisa bavideo na biso. Makanisi oyo elandi emonisi ntango nini tokoki kolakisa moyekoli ya Biblia moko ya bavideo yango. Simbá ete yango ezali kaka makanisi kasi mobeko te, mpo bayekoli ya Biblia nyonso bazalaka ndenge moko te.

Buku Biblia eteyaka

  • Mokapo 1: Nsima ya kotalela paragrafe 17, bótala Les merveilles de la création révèlent la gloire de Dieu

  • Mokapo 2: Na nsuka, bótala La Bible. Le livre le plus ancien toujours d’actualité

  • Mokapo 9: Nsima ya kotalela paragrafe 14, bótala Les Témoins de Jéhovah : organisés pour proclamer la bonne nouvelle

  • Mokapo 14: Na nsuka, bótala La Bible, une force dans votre vie

  • Mokapo 15: Nsima ya kotalela paragrafe 10, bótala Toute la communauté des frères

Buku “Bolingo ya Nzambe”

  • Mokapo 3: Nsima ya kotalela paragrafe 15, bótala Les jeunes s’interrogent . . . Comment se faire de vrais amis ?

  • Mokapo 4: Na nsuka, bótala Respectons l’autorité de Jéhovah

  • Mokapo 7: Nsima ya kotalela paragrafe 12, bótala Pas de sang. La médecine relève le défi

  • Mokapo 9: Nsima ya kotalela paragrafe 6, bótala Des exemples qui nous servent d’avertissement

  • Mokapo 17: Na nsuka, bótala ‘Marchons par la foi, non par la vue’

Ezali na bavideo mosusu oyo ekoki kosalisa moko ya bato oyo oyekolaka na bango Biblia soki atali yango? Na ndakisa, bato mosusu oyo bazali kokutana na botɛmɛli bakoki kolendisama soki batali video Fidèles dans les épreuves. Les Témoins de Jéhovah en Union soviétique to La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie. Bilenge bakoki kolendisama soki batali Poursuivez des objectifs qui honorent Dieu mpe Les jeunes s’interrogent . . . Que vais-je faire de ma vie ? Na buku na yo Biblia eteyaka mpe “Bolingo ya Nzambe,” tyá bilembo na bisika yango mpo oyeba ntango nini okoki kotala bavideo yango elongo na moyekoli to kopesa ye atala yango. Lokola bavideo ya sika ebimaka, kanisáka ndenge okoki kosalela yango mpo na kosimba motema ya bato oyo oyekolaka na bango Biblia.​—Luka 24:32.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto