Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/06 lok. 8
  • Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalela bavideo mpo na koteya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Salelá bavideo mpo na koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Saleláká bavideo ntango ozali koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 2/06 lok. 8

Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya

1. Ndenge nini Yehova asalelaki biloko ya kolakisa bato mpo na koteya basaleli na ye na ntango ya kala, mpe yango ebimisaki matomba nini?

1 Na ntango ya kala, Yehova asalelaki bimonaneli mpe bandɔtɔ mpo na koyebisa basaleli na ye makambo ya ntina mingi. Kanisá emonaneli oyo Ezekiele amonaki, oyo etali likalo ya Yehova ya likoló. (Ezek. 1:1-28) Kanisá ndenge oyo Danyele amiyokaki ntango alɔtaki ndɔtɔ oyo ezali mpe esakweli, oyo emonisaki kolandana ya bikóló oyo elekaki nguya na mokili mobimba. (Dan. 7:1-15, 28) Okanisi nini mpo emonaneli ya kongɛngisa biso oyo bamonisaki ntoma Yoane “na bilembo,” oyo etalelaki makambo oyo ekosalema na “mokolo ya Nkolo”? (Emon. 1:1, 10) Yehova asalelaki bimonaneli mpe bandɔtɔ ya polele mpo na koteya bango, mpe yango esalaki ete makambo yango etikala libela na makanisi na bango.

2. Biloko nini ya kolakisa bato tokoki kosalela mpo na koteya basusu mateya ya solo ya Biblia?

2 Ndenge moko mpe, soki tolingi kolimbolela basusu mateya ya solo ya Biblia na ndenge oyo ekosala ete bábosana yango noki te, tokoki kosalela bakasɛti-video na biso mpo na koteya bango. Bakasɛti-video na biso elobelaka makambo ndenge na ndenge mpe elendisaka bato bándima Biblia, bándima ebongiseli ya Yehova, mpe mitinda oyo esalisaka biso tózala baklisto oyo babongi. Tótalela mwa balolenge oyo tokoki kosalela bakasɛti-video na biso mpo na koteya. Makanisi oyo elandi ezali kaka ndakisa mpo na ndenge ya kosalela bakasɛti-video yango.

3. Okoki kosalela nini mpo na kolakisa moyekoli ya Biblia ebongiseli ya Yehova?

3 Na mosala ya kosakola: Osilá koyebisa moto moko oyo oyekolaka na ye Biblia makambo etali bandeko na biso baklisto na mokili mobimba? Lakisá ye kasɛti-video Toute la communauté des frères (Libota mobimba ya bandeko). Okoki kotikela ye atala yango liboso ya boyekoli oyo ekolanda mpe na nsima azongisela yo yango, to kotala yango elongo na ye ntango okozongela ye. Na nsima, bótalela mituna ya bozongeli oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2002.

4. Bisaleli nini ya koteya oyo elenge Motatoli akoki kosalela na kelasi?

4 Soki ozali elenge, okoki kosolola na molakisi na yo soki akondima olakisa bana-kelasi kasɛti-video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Ndenge Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya Banazi) to Fidèles dans les épreuves—Les Témoins de Jéhovah en Union soviétique (Batatoli ya Yehova na Union soviétique batikalaki sembo na ntango ya minyoko). Sɛngá ye soki akondima obongisela bana-kelasi mituna oyo ebongi na bango, na mituna oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2001 to ya Febwali 2003.

5. Eloko nini baboti bakoki kosalela na boyekoli ya libota?

5 Na libota mpe elongo na baninga: Baboti, mikolo boni eleki banda bana na bino batalaki kasɛti video Les jeunes s’interrogent... Comment se faire de vrais amis? (Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?) Mpo na nini te kotala yango lisusu na boyekoli ya libota oyo ekolanda? Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2002 ezali na mituna oyo ekosalisa biso tósala lisolo ya malamu mpe ya polele.

6. Ndenge nini okoki kobongisa kolekisa ntango ya kolendisa elongo na baninga?

6 Ozali nde na baninga na lisangá, oyo olingi kobenga bango na ndako na yo? Soki botali elongo kasɛti-video Tómemya bokonzi ya Yehova (Respect Jehovah’s Authority), bokolendisama mpenza na mpokwa yango, mingi mpenza soki na nsima bosaleli mituna oyo batye na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2004, mpo na kozongela mateya oyo bozwi.

7. Mabaku nini okoki kokanisa kosalela mpo na kolakisa bato bakasɛti-video na biso?

7 Mabaku mosusu: Ndenge nini mosusu okoki kosalela bakasɛti-video 20 oyo moombo ya sembo abimisá? Kolakisa kasɛti-video moko to bakasɛti-video mibale na moto oyo ozongelaka mbala na mbala ekosalisa ye akola na elimo? Okoki kosɛnga nzela mpo olakisa bakasɛti-video na lopitalo moko ya moke oyo ezali na esika bofandi to na ndako moko ya mibange? Bakasɛti-video ekosala nde ete bato ya libota na yo oyo bazali Batatoli te, baninga ya kartye, mpe ya mosala básepela na mateya na biso? Bakasɛti-video na biso ekamwisaka, eteyaka mpe ezali biloko oyo ebongi mpenza mpo na kolakisa bato. Salelá yango mpo na koteya.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto