Biyano na mituna na bino
◼ Liboso mosakoli oyo azwi naino batisimo te andimama mpo na batisimo, ntango boni asengeli koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola?
Kozwa batisimo ezali ekateli eleki ntina oyo moto asengeli kozwa. Na yango, liboso ete moto andimama mpo na kozwa batisimo, asengeli koyeba na ndenge ekoki makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ye. Lisusu, asengeli liboso komonisa mpenza ete alingi kozala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo Nzambe asɛngaka.
Bakristo bazwá etinda ya kotika te koyanganaka na makita na bango; na yango mosakoli oyo azwi naino batisimo te asengeli kozala moto oyo ayanganaka na makita nyonso ya lisangá. (Ebr. 10:24, 25) Mbala mingi, asengeli mpe kopesaka biyano. Ntango mosusu, asengeli kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, atako yango ezali lisɛngami te.
Lisusu, lokola bakristo bazwá etinda ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli, mosakoli oyo azwi naino batisimo te asengeli kobimaka sanza nyonso na mosala ya kosakola liboso azwa batisimo. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Asengeli kosakola sanza boni liboso azwa batisimo? Na ntembe te, esengeli kotikela ye ntango oyo ekoki mpo amonisa ete azwi mpenza ekateli ya kosakola na molende sanza nyonso. (Nz. 78:37) Kasi, esengeli te ete ntango molai eleka kobanda moto abandi kosakola tii ntango akokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo; ntango mosusu ekosɛnga kaka mwa basanza. Asengeli kopesaka bangonga boni liboso azwa batisimo? Mobeko etyami te mpo na yango. Bankulutu basengeli kotalela makambo ya mosakoli mokomoko mpe kozala na makanisi ebongi mpe na bokatikati.—Luka 21:1-4.
Bankulutu (to basaleli na misala na masangá oyo bankulutu bazali moke mpenza) oyo bakosolola na mosakoli oyo alingi kozwa batisimo, basengeli kobosana te ete bato nyonso bazalaka ndenge moko te, mpe basengeli kosalela bososoli mpo na koyeba soki moto yango akokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo. Basengeli komona ete azali mpenza na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova mpe azali komonisa ete asepeli na libaku ya kokɔta na ebongiseli ya Yehova mpe kosakola elongo na lisangá. Bankulutu bayebi ete akɔmeli naino na elimo te, mpe basengeli te kotalela ye lokola mosakoli oyo azwá batisimo mpe ayebi makambo mingi. Soki bankulutu bamoni ete mosakoli yango akokisi masɛngami te mpo na kozwa batisimo, basengeli koyebisa ye na boboto makambo oyo Biblia elobi, oyo emonisi ete akokisi masɛngami te mpe kosalisa ye na elimo na ndenge ebongi.