Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/13 lok. 8
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge nini nakoki koboya pornografi?
    Lamuká!—2008
  • Mpo na nini koboya pornografi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Pornografi—Ezali lisano mpamba to pwazɔ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 7/13 lok. 8

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya mwambe

“Pene na moto nyonso asambelaka mbala na mbala. Ata bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali, basambelaki na ntango ya mikakatano. Okanisi ete Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?” [Tiká ye apesa eyano.] Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2013, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Liyebisi: Bokosala elakiseli ya “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo na likita ya mosala ya kosakola na dati ya 3 sanza ya 8.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/08/2013

“Toyei kotala bino mpo na mwa ntango mokuse mpo bato mingi bazali komitungisa ndenge pornografi epalangani mingi. Kasi ebele ya bato mosusu bazali komona ete kotala pornografi ezali na likama te. Likanisi na yo ezali nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu alobaki ete tokoki koyeba soki eloko moko ezali malamu na mbuma oyo yango ezali kobimisa. [Tángá Matai 7:17.] Zulunalo oyo elobeli mbuma oyo pornografi ebimisi. Epesi mpe batoli ya malamu mpo na kolongwa na boombo ya pornografi.”

Lamuká! 08/2013

“Mingi na biso tozalaka na mposa ya kozala na bomoi ya molai. Okanisi ete bokoli ya mayele ya siansi ekosala ete mokolo mosusu tótikala na bomoi seko na seko? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka kitoko oyo. [Tángá 1 Bakorinti 15:26.] Kasi, Nzambe akosala yango na nzela ya mayele ya siansi to na nzela ya eloko mosusu? Bongo mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Zulunalo oyo emonisi ndenge oyo Biblia epesi biyano na mituna yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto