Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/13 lok. 2
  • Salelá site Internet na biso mpo na koteya bana na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá site Internet na biso mpo na koteya bana na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Saleláká jw.org na mosala na yo ya kosakola—“Kómá moninga ya Yehova”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Likanisi mpo na bolukiluki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 10/13 lok. 2

Salelá site Internet na biso mpo na koteya bana na yo

1. Wapi ntina ya masolo oyo ezali na site Internet na biso esika bakomi “Bana”?

1 Site Internet na biso, jw.org, ebongisami mpo bato ya mbula nyonso básepela na yango. Na esika bakomi “Bana” (Kende na mateya ya Biblia > Bana) esalisaka bana ná baboti bákoma na boyokani ya penepene mpe bango nyonso bápusana penepene na Yehova. (Mib. 6:6, 7) Ndenge nini okoki kosalela masolo yango mpo na koteya bana na yo?

2. Ndenge nini okoki kopona makambo oyo ebongi na mbula ya bana na yo mpo na koyekola na bango?

2 Talelá makoki ya mwana: Mwana na mwana azalaka na bamposa na ye. (1 Ko. 13:11) Na yango, ndenge nini okoki kopona makambo oyo eyokani na mbula ya mwana mpo na koyekola na ye? Omituna boye: ‘Makambo nini ekosepelisa mwana na ngai? Makambo nini akokanga ntina na yango? Esengeli koyekola na ye miniti boni mpo akanga ntina?’ Mpo na bana oyo bazali na mbula misato kitá na nse, okoki kosalela masolo oyo ezali na esika bakomi “Mateya ya Biblia mpo na bana.” Mabota mosusu basalelaka masolo ya Biblia oyo ezali na esika bakomi “Teyá bana na yo.” Okoki mpe kotalela makambo mosusu oyo elandi.

3. Ndenge nini baboti bakoki kosalela malamumalamu masolo mpe makambo mosusu oyo ezali na esika bakomi “Mpo na Losambo na kati ya libota”?

3 Mpo na Losambo na kati ya libota: Yango ezali bisaleli oyo ekosalisa baboti mpo na koyekola na bana na bango. Mpo na koyeba ndenge ya kosalela likambo mokomoko oyo ezali kuna, finá na esika ya kozwa mpe tángá esika bakomi “Epai ya baboti.” Mpo na koteya bana ya mike, salelá bililingi mpo na koteya bana, na ndakisa bankasa ya kotya langi. Salisá bana oyo bakómi mwa mikóló bátondisa maloba oyo ezangi na masolo mpo na koteya bana. Lokola masolo yango nyonso elobeli kaka moto moko, bana ya mbula nyonso bakoki kozala na makambo ya kosala na losambo na kati ya libota.

4. Makambo nini ezali na esika bakomi “Kómá moninga ya Yehova”?

4 Kómá moninga ya Yehova: Bavideo, banzembo, mpe makambo mosusu oyo ezali wana na site Internet na biso ezali kosalisa baboti bákɔtisa malamumalamu Liloba ya Nzambe na kati ya bana na bango ya mike. (Mib. 31:12) Mokomoko ya bavideo yango ya mikuse ezali na liteya moko ya ntina. Makambo lokola luká komona masano, ezali kobimisa mateya ya ntina. Lokola mbala mingi bana balingaka koyemba mpe banzembo esalisaka bana bábosana te makambo bayekoli, banzembo ya Bokonzi mpe banzembo oyo ebongisami mpenza mpo na bana ezali kotyama mbala na mbala.

5. Mpo na nini baboti basengeli kosɛnga Yehova asalisa bango mpo báteya bana na bango mateya ya solo?

5 Baboti, Yehova alingi ete bozala batata mpe bamama ya malamu. Na yango, bósɛnga ye asalisa bino mpo bóteya bana na bino mateya ya solo. (Bas. 13:8) Na lisalisi ya Yehova, bokoki koteya bana na bino bákoma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu.’​—2 Tim. 3:15; Mas. 4:1-4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto