Saleláká jw.org na mosala na yo ya kosakola—“Kómá moninga ya Yehova”
Na site jw.org esika bakomi “Mateya ya Biblia,” ezali na eteni moko oyo ebengami “Kómá moninga ya Yehova,” epai okomona banzembo, bavideo mpe biloko mosusu. Osalelá yango na mosala na yo ya kosakola? Soki ozali koyekola Biblia na moboti moko oyo azali na bana ya mike, mpo na nini te kolakisa ye yango? Ekoki kotinda ye aluka koyeba makambo mosusu na site Internet na biso.
Ntango ndeko mobali moko azalaki kokabola Nsango ya Bokonzi No. 38 apesaki yango na mwasi moko, mpe mwasi yango abandaki kotánga trakte yango mbala moko. Mwasi yango azalaki na bana mike ebele oyo bazalaki na mposa ya koyeba makambo oyo ezali na trakte. Ndeko mobali alobelaki na mokuse makambo oyo ezali na trakte mpe alakisaki site Internet oyo ezali na nsuka ya trakte. Lokola mwasi wana asepelaki, ndeko mobali alakisaki ye ná bana na ye, moko ya bavideo ya Caleb na telefone.
Ndeko mwasi moko alobelaki site internet na biso ná makambo etali mabota oyo ezali na kati epai ya moninga na ye ya mosala, oyo azali na bana. Mwasi yango asalelaki jw.org elongo na bana na ye. Na nsima, ayebisaki ndeko mwasi ete ntango bana na ye bazalaki kosakana libándá ya lopango, babandaki koyemba “Sakolá Liloba,” moko ya banzembo oyo ezali esika bakomi “Kómá moninga ya Yehova.”
Mesaná na eteni wana oyo ezali na jw.org mpe zwáká bavideo, banzembo, mpe biloko mosusu mpe tyáká yango na telefone na yo. Soki osali bongo, okokakatana te kosalela yango na mosala ya kosakola. Yango ezali mpenza esaleli ya malamu oyo ekosalisa biso tósalela Nkolo lokola baombo!—Mis. 20:19.