Saleláká jw.org na mosala na yo ya kosakola
Site na biso ya Internet ezali esaleli moko ya ntina mingi oyo ezali kosalisa biso tópalanganisa nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Bato mingi oyo tokutanaka na bango bayebi te ndenge ya komona jw.org Kasi, bayokaka nsango na yango kaka soki mosakoli moko alakisi bango yango.
Mokɛngɛli-motamboli moko atyá video Mpo na nini koyekola Biblia? na telefone na ye mpe alakisaka yango mbala nyonso oyo libaku emonani. Na ndakisa, na mosala ya ndako na ndako alobaka boye: “Nazali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kolakisa bango ndenge ya kozwa biyano na mituna minene misato oyo: Mpo na nini mokili etondi na mikakatano boye? Ndenge nini Nzambe akosilisa yango? Mpe ndenge nini tokoki kosala liboso ete ntango yango ekoka? Video oyo ya mokuse elobeli mituna yango.” Na nsima, afinaka mbala moko butɔ mpe atalaka ndenge moto yango akosala. Video yango ebendaka mpenza likebi ya bato; yango wana bato mingi batalaka yango tii na nsuka. Na nsima, mokɛngɛli-motamboli yango alobaka boye: “Outi koyoka ete okoki kosɛnga boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet. Lokola nazali awa, nakoki kolakisa yo na lombangu ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka.” Soki moto yango andimi, asalelaka mwa buku Nsango malamu mpo na kolakisa ndenge boyekoli esalemaka. Soki moto yango azali na ntango te, ayokanaka na ye mpo básala yango ntango akozongela ye. Ntango akendeke na esika ya komɛla kafe na ntango ya bopemi na mosala, alobaka mpe bongo na moto oyo afandi pembeni na ye nsima ya kobanda lisolo na ndenge ya boninga. Yo mpe, osalelaka jw.org na mosala na yo ya kosakola?