Nzembo ya sika mpo na losambo!
1 Na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania oyo eutaki kosalema na mokolo ya 04/10/2014, bapesaki liyebisi ete bibongiseli ezwami mpo na kobongisa lisusu maloba ya buku na biso ya nzembo oyo tozali kosalela. Ezalaki nsango moko ya esengo mpenza! Bakundwelaki bayangani nyonso ete nzembo ya Bokonzi ezali na ntina mingi na losambo na biso.—Nz. 96:2.
2 Okoki komituna: ‘Mpo na nini ezali na ntina kobongisa lisusu maloba ya buku ya nzembo?’ Bantina ezali ebele. Ya liboso, lokola bososoli na biso ya Biblia ezali kokoba kobakisama, yango ekoki kosala mpe ete maloba ya nzembo na biso ebongwana. (Mas. 4:18) Ntina mosusu: Maloba mingi oyo ezali sikoyo na buku ya nzembo eutaki na Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, ebimeli oyo toutaki kosalela. Sikoyo esengeli koyokanisa maloba ya nzembo na maloba ya Biblia oyo ebongisami lisusu. Lokola mosala monene ekosalema mpo na koyokanisa maloba ya nzembo na oyo ya Biblia, ekateli ezwami ete mwa banzembo ya sika ebakisama na buku yango.
3 Tokozela nde tii ntango buku ya sika ya nzembo ekobima liboso tóbanda koyemba nzembo ya sika? Te. Tozali na esengo ya koyebisa bino ete na basanza oyo ezali koya, mwa banzembo ya sika ekobanda kobima na site Internet na biso, jw.org. Soki loyembo ya sika ebimi, programɛ ya Likita ya mosala ekomonisa yango kuna na nsuka na maloba “loyembo ya sika.”
4 Ndenge ya koyekola nzembo ya sika: Ekoki kozala mpasi koyekola loyembo ya sika. Atako bongo, lokola mokomi ya nzembo, biso mpe tolingi koyemba na mongongo makasi na makita na biso, kasi ‘kofanda nyɛɛ te.’ (Nz. 30:12) Mpo na koyekola loyembo ya sika, landá matambe ya pɛtɛɛ oyo elandi:
Yoká mbala na mbala ndenge babɛti loyembo yango na piano, oyo ekotyama na site Internet na biso. Soki oyoki miziki na yango mbala na mbala, ekozala pɛtɛɛ komikundola na yango.
Yekolá maloba na yango mpe meká kokanga yango na motó.
Yembá maloba elongo na miziki. Salá bongo tii okomesana na loyembo.
Bómekameka nzembo ya sika mbala mwa mingi na Losambo na kati ya libota tii bokomesana na yango.
5 Na basanza oyo ezali koya soki loyembo ya sika nde ekosukisa Likita ya mosala, bayangani bakoyoka naino piano ndenge ezali kobɛta. Na nsima, bakoyemba elongo na piano, ndenge tosalaka.
6 Tóyeba ete koyemba na makita epesaka biso libaku ya kosangisa mingongo na biso na esengo nyonso mpo na kosanzola Yehova. Na yango, ntango basɛngi biso tóyemba na makita, tózala te na momeseno ya kolongwa na bisika na biso ya kofanda kozanga ntina.
7 Ezali na lolenge mosusu ya komonisa botɔndi mpo na miziki na biso ya bosantu. Na mayangani na biso ya mike mpe ya minene, miziki ebɛtaka liboso eteni mokomoko ebanda. Mbala mibale na mbula, bandeko mibali mpe basi oyo bamipesi, ya mikili ndenge na ndenge bafutaka tike na bango moko mpo na kokende na Patterson, na New York, kobɛta miziki ya kitoko ya nzembo na biso ya losambo. Yango wana, ntango prezida asɛngi biso tófanda mpe tólanda miziki oyo bandeko yango babongisaki, tosengeli kosala yango. Kosala bongo ekobongisa mitema na biso mpo na makambo oyo tokolanda.—Ezr. 7:10.
8 Tokosukisa makita na biso ya lelo na loyembo ya sika, na motó ya likambo “Bokonzi ezali koyangela—Tiká eyá!” Loyembo yango, oyo eyembamaki na likita ya nsuka ya mbula, ebongisamaki mpenzampenza mpo na kobenda likebi ete mbula 100 ekoki banda Bokonzi ebotamaki.
9 Na ntembe te, nzembo ya sika ezali “makambo ya malamu” oyo euti epai ya Yehova. (Mat. 12:35a) Tiká ete tóyekola nzembo yango ya sika mpe tóyembaka yango na motema mobimba, mpo tópesa Nzambe na biso masanzoli mpe lokumu oyo ebongi na ye!—Nz. 147:1.