Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w23 Novembre lok. 32
  • Likanisi mpo na koyekola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likanisi mpo na koyekola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kangáká “nzembo ya elimo” na motó
  • Tóyembela Yehova na esengo nyonso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Omibongisi mpo na koyembela Yehova na makita?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Nzembo ya sika mpo na losambo!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Banzembo oyo esalaka ete tópusana penepene na Nzambe
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
w23 Novembre lok. 32

Likanisi mpo na koyekola

Kangáká “nzembo ya elimo” na motó

“Ntango nazali na mitungisi, Yehova alendisaka ngai na nzela ya banzembo oyo ebimaka na emisyo ya TV JW®.”—Lorraine, États-Unis.

“Nzembo ya elimo” ezalaka ntango nyonso na kati ya losambo ya bakristo. (Kol. 3:16) Soki okangi banzembo yango na motó, ekosalisa yo ata ntango ozali na buku ya nzembo te to aparɛyi. Meká kosalela mwa makanisi oyo elandi mpo okanga mwa banzembo na motó.

  • Tángáká na likebi maloba ya nzembo mpo oyeba malamu ndimbola na yango. Ntango oyebi malamu ndimbola ya likambo moko, ezalaka pɛtɛɛ etikala yo na motó. Maloba ya banzembo na biso nyonso, ata mpe banzembo mosusu mpe banzembo mpo na bana, ezali na site jw.org. Kɔtá na Bibliotɛkɛ, mpe kende na Miziki.

  • Komá maloba ya nzembo yango na papye. Kosala bongo ekosalisa yo okanga yango mpenza malamu na motó.—Mib. 17:18.

  • Tángá to yembá na mongongo makasi. Tángáká to yembáká yango mbala na mbala.

  • Zongelá na motó banzembo oyo okangi. Mekáká kozongela maloba ya nzembo kozanga kotala na papye, mpe na nsima talá soki okangi yango malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto