Ndenge ya kobanda lisolo
Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Ekaniseli
“Tozali kokabola lokasa ya libyangi oyo mpo na molulu moko ya ntina mingi. Na mokolo ya 03/04/2015, bamilio ya bato na mokili mobimba bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Yesu Kristo mpe kolanda diskur moko oyo ekomonisa ndenge liwa na ye ekoki komemela biso matomba. Lokasa ya libyangi oyo emonisi ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/03/2015
“Tokokanisa liwa ya Yesu mokolo ya mitano 03/04/2015. Bato mosusu ya kartye na biso bakoyangana elongo na likita moko mokolo yango, kasi bamosusu bakanisaka ete liwa ya Yesu ezali na ntina te. Yo, okanisi nini? Okanisi ete tozwaka matomba na liwa mpe lisekwa ya Yesu? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na yango. [Tángá 1 Bakorinti 15:22, 26.] Zulunalo oyo elobeli bolamu moko oyo mbeka ya lisiko ya Yesu ekomemela biso na mikolo ezali koya: ekozala na ntango moko awa na mabele ata moto moko te akokufa lisusu.”
Lamuká! 03/2015
“Tozali kotala bato ya kartye na biso na miniti moke mpo na kolakisa bango Lamuká! ya nsanza oyo. [Lakisá ezipeli ya liboso.] Moto na moto azali na likanisi na ye na motuna oyo ya liboso: ‘Nzambe azalaka?’ Mpo na yo, banani batalelaka mikolo ezali koya na ndenge ya malamu: baoyo bandimelaka Nzambe to baoyo bandimelaka ye te? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo Nzambe apesi, oyo ezali kopesa bato mingi elikya. [Tángá Nzembo 37:10, 11.] Zulunalo oyo elobeli makambo minei oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki Nzambe azalaka to te.”