Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/14 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 2/14 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya misato

“Tozali kotala bato mpo na koyebisa bango na mwa miniti moke likambo moko oyo ekosalema mokolo ya 14/04/2014. Mokolo yango tokokanisa liwa ya Yesu. Bato mingi bakokanisa mokolo yango mpo bamonaka ete liwa ya Yesu ezali na ntina mingi. Kasi bato mosusu bayebaka mpenza te ntina oyo Yesu akufaki. Okanisi ete liwa ya Yesu ekomemela biso matomba?” Tiká ye apesa eyano. Lakisá ye lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/2014, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/03/2014

“Bato mingi bamitunaka mpo na nini Nzambe asalaka eloko te mpo na kosilisa kozanga bosembo mpe bampasi na mokili. Okanisi ete ezali mpo Nzambe akipaka bato te to mpo amonaka ete ezali malamu bato bányokwamaka? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yoane 3:16.] Atako bato mingi basalelaka vɛrsɛ yango mpo na komonisa ete Nzambe akipaka bato, bayebaka mpenza te ndenge oyo liwa ya Mwana ya Nzambe ekoki komemela bango matomba. Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo liwa ya Yesu ekosala ete kozanga bosembo mpe bampasi esila na mabele.”

Lamuká! 03/2014

“Tozali kotala bino na mwa miniti moke mpo na kosembola likanisi moko ya libunga oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na vɛrsɛ oyo. [Tángá Ebandeli 1:1.] Bato mosusu bandimaka ete Nzambe nde akelá likoló ná mabele, kasi bamosusu bandimaka yango te. Yo okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bazalaka na mokakatano ya kondima ete Nzambe nde akelá biloko nyonso mpo bakonzi ya mangomba bateyaka makambo oyo Biblia elobi te. Zulunalo oyo elobeli ndimbola ya sikisiki mpe ya kotyelama motema oyo Biblia epesi mpo na ndenge likoló ná mabele ebandaki.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto