Koteya na mwa buku Nsango malamu
1. Ndenge nini mwa buku Nsango malamu ebongisami?
1 Ndenge elobelamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya nsambo, mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! ezali moko ya bisaleli na biso ya ntina mingi mpo na koteya. Ezali na bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te na paragrafe mpo bato básepela kotánga mbala moko na Biblia. Atako mikanda na biso mingi ekomamaka na ndenge oyo motángi akoki koyekola yango ye moko, mwa buku yango ebimisamaki mpo moteyi asalisa moyekoli mpo akanga ntina. Na yango, ntango topesi moto mwa buku yango, tosengeli komeka kolakisa ye ndenge boyekoli esalemaka mpo amona ete koyeba nsango malamu ya Biblia epesaka esengo.—Mat. 13:44.
2. Ndenge nini tokoki kosalela mwa buku Nsango malamu ntango tokutani na moto mbala ya liboso?
2 Na bokutani ya liboso: Okoki koloba boye: “Nayei awa mpo bato bazali komituna soki tokosuka wapi na mokili oyo. Okanisi ete ata ndɛlɛ makambo ekobonga? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali na nsango malamu oyo ekoki kopesa biso elikya. Talá mwa mituna oyo Biblia epesi biyano na yango.” Pesá ye mwa buku yango, mpe sɛngá ye apona motuna moko na lokasa ya nsuka. Na nsima, lakisá ye ndenge boyekoli esalemaka na lisalisi ya paragrafe ya liboso ya liteya yango. To mpe okoki kotuna moto motuna oyo ekobenda likebi na ye, na liteya oyo yo oponi, mpe na nsima lakisá ye ndenge oyo mwa buku yango ekoki kosalisa ye azwa eyano na Biblia. Soki liteya yango eyokani na video moko oyo ezali na jw.org, basakoli mosusu balakisaka yango ntango babandi kosolola na moto.
3. Limbolá ndenge ya kotambwisa boyekoli na mwa buku Nsango malamu.
3 Ndenge ya kotambwisa boyekoli: (1) Tángá motuna mokomoko oyo ekomami na makomi ya moindo makasi mpo na kosalisa moto atya likebi na makanisi ya ntina. (2) Tángá paragrafe oyo elandi. (3) Tángá bavɛrsɛ oyo ekomami na makomi oyo etɛngami mwa moke, mpe salelá mwa mituna na mayele mpo na kosalisa ye amona ndenge oyo bavɛrsɛ epesi eyano na motuna mokomoko. (4) Soki na nse ya motuna paragrafe mosusu ezali, zongelá makambo oyo elobelami na eteni 2 mpe 3, oyo ezali na likoló awa. Soki video moko eyokani na motuna mpe olakisi moto yango naino te, lakisá ye yango ntango bozali kosolola. (5) Na nsuka, sɛngá moto yango apesa eyano na motuna mokomoko mpo oyeba soki akangi ntina.
4. Nini ekosalisa biso tósalela na mayele esaleli yango ya malamu?
4 Luká komesana na esaleli oyo ya malamu. Salelá yango na libaku nyonso oyo ebongi. Liboso ya boyekoli mokomoko, kanisá moyekoli mpe ndenge ya malamu oyo okoki kosolola na ye na kosalela bavɛrsɛ oyo ezali na liteya yango. (Mas. 15:28; Mis. 17:2, 3) Soki omesani mpe okómi na mayele ya kosalela yango, okosepela mingi kosalela mwa buku yango mpo na koteya bato solo!