MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EZERA 6-10
Yehova alingaka baoyo basalelaka ye na bolingo na bango moko
Ezera azwaki bibongiseli mpo na kozonga na Yerusaleme
Ezera azwi ndingisa epai ya mokonzi Artazerezese ya kozonga na Yerusaleme mpo na kosala ete losambo ya Yehova ekende liboso kuna
Mokonzi apesi Ezera “nyonso oyo asɛngaki” mpo na ndako ya Yehova: wolo, palata, blé, vinyo, mafuta ná mungwa; nyonso wana ekokani lelo oyo na dolare milio 100
Ezera atyaki motema ete Yehova akobatela basaleli na ye
Kozonga na Yerusaleme ezalaki mpasi
Mbala mosusu basalaki mobembo na nzela oyo ezalaki na kilomɛtrɛ soki 1 600 mpe etondi na makama mingi
Mobembo ezwaki soki sanza 4
Baoyo bazongaki basengelaki kozala na kondima makasi, molende mpo na losambo ya solo mpe mpiko
EZERA AMEMAKI . . .
Wolo ná palata oyo ezalaki na kilo koleka talanta 750
MIKAKATANO OYO BAOYO BAZONGAKI BAKUTANAKI NA YANGO . . .
Bituluku ya bapunzi, esobe, banyama ya zamba ya kanza