MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 60-68
Sanzolá Yehova, Moyoki ya libondeli
Bondeláká mpo na makambo oyo olaki Yehova
Kobondela mpo na makambo oyo tolaki Yehova ekopesa biso makasi ya kokokisa yango
Komipesa na biso na Nzambe nde elaka monene oyo tokoki kosala
Hana
Sopá motema na yo liboso ya Yehova; ekomonisa ete otyelaka ye motema
Kobondela na mozindo elimboli kobimisa mpenza mayoki na biso
Soki tozali kosɛnga makambo ya sikisiki na mabondeli na biso, tokoki mpe komona polele biyano ya Yehova
Yesu
Yehova ayokaka mabondeli ya bato nyonso oyo balingaka Nzambe
Yehova ayokaka “bato ya lolenge nyonso” oyo balingi mpenza koyeba ye mpe kosala mokano na ye
Tokoki kobondela Yehova ntango nyonso oyo tolingi
Korneyi
Komá makambo oyo olingi kolobela na mabondeli na yo.