MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 69-73
Basaleli ya Yehova bazalaka na molende mpo na losambo ya solo
Molende na biso mpo na losambo ya solo esengeli komonana polele
Davidi amonisaki molende mpo na Yehova bomoi na ye mobimba
Davidi andimaki te básalela Yehova bombanda to báfingisa nkombo na ye
Mikóló bakoki kosalisa bilenge bázala na molende
Mokomi ya loyembo yango, mbala mosusu Davidi, amonisaki ete alingi kolendisa mabota oyo ekoya nsima
Baboti ná bakristo oyo baumeli mingi na lisangá bakoki kolakisa bilenge makambo