Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Mars lok. 6
  • Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • “Maloba oyo . . . esengeli kozala na motema na yo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Bósambela Yehova libota mobimba
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Mars lok. 6

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te

Yehova atindaki Yirimia akebisa Bayuda ete libebi ekoyela bango mosika te mpo babosanaki Ye, Nzambe na bango. (Yir 13:25) Nini esalaki ete bato ya ekólo yango bábosana Yehova? Mabota ya Bayisraele ezalaki na boyokani malamu te na Nzambe. Emonani ete batata ya mabota bazalaki te kolanda malako ya Yehova oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:5-7.

Mama moko azali kosala Losambo na kati ya libota elongo na bana na ye; libota moko ezali kosalela karte oyo elakisi mikili oyo Biblia elobeli na losambo na kati ya libota

Mabota oyo ezali na boyokani malamu na Nzambe nde esimbaka masangá lelo oyo. Batata bakosalisa bato ya mabota na bango bábosana Yehova te soki bazali kosala pɔsɔ na pɔsɔ Losambo na kati ya libota, oyo eyokani mpenza na mposa ya libota. (Nz 22:27) Nsima ya kotala video “Maloba oyo . . . Esengeli kozala na motema na yo”​—Mituna-lisolo na mabota, yanolá na mituna oyo:

  • Mabota mosusu esalaki nini mpo kolonga makambo oyo epekisaka losambo na kati ya libota?

  • Wapi mwa matomba ya kosala pɔsɔ na pɔsɔ Losambo na kati ya libota, oyo eyokani mpenza na mposa ya libota?

  • Na oyo etali losambo na kati ya libota, mikakatano nini nazali na yango, mpe ndenge nini nakani kosilisa yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto