Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Juin lok. 2
  • Kondima na yo na bilaka ya Yehova ezali mpenza makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima na yo na bilaka ya Yehova ezali mpenza makasi?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Mokokisi ya bilaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mokanda ya Biblia nimero 6—Yosua
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Juin lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Kondima na yo na bilaka ya Yehova ezali mpenza makasi?

Yosua ná Salomo balobaki ete ata liloba moko te ezangaki kokokisama na bilaka ya Yehova. (Yos 23:14; 1Ba 8:56) Litatoli ya bato yango mibale oyo bamonaki na miso kokokisama ya bilaka yango epesi biso lisusu ntina ya kokómisa kondima na biso makasi.​—2Ko 13:1; Tit 1:2.

Ndenge nini Yehova akokisaki bilaka na ye na ntango ya Yosua? Bótala na libota video ‘Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.’ Na nsima, bótalela mituna oyo: (1) Ndenge nini okoki komekola Rahaba na makambo oyo asalaki, oyo emonisaki ete azalaki na kondima? (Ebr 11:31; Yk 2:24-26) (2) Ndenge nini ndakisa ya Akana emonisi ete koboya kotosa na nko nyonso ememaka na libebi? (3) Atako bato ya Gibeone bazalaki bilombe ya etumba, mpo na nini bakosaki Yosua mpe basalaki kimya ná Yisraele? (4) Ndenge nini maloba ya Yehova ekokisamaki ntango bakonzi mitano ya Baamore balukaki kobundisa Yisraele? (Yos 10:5-14) (5) Ndenge nini Yehova asungaka yo ntango otyaka Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na yo?​—Mt 6:33.

Soki tozali kokanisa nyonso oyo Yehova asalelá biso, oyo azali kosalela biso mpe oyo akosalela biso, kondima na biso na bilaka na ye ekokóma makasi mpenza.​—Ro 8:31, 32.

Yosua

Ozali na kondima lokola oyo ya Yosua?

MITUNA MPO NA KOMANYOLA:

  • Bisakweli nini ya Biblia ozali komona kokokisama na yango lelo oyo?

  • Bisakweli nini ya Biblia ozali na mposa ya komona kokokisama na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto