BOMOI YA BAKRISTO
Omilimbisaka?
Ekoki kozala mpasi tómilimbisa mpo na masumu oyo tosalá kala, oyo Yehova así alimbisá biso. Tolobelaki likambo yango na diskur mpe video oyo tolandaki na liyangani ya etúká ya 2016 “Tikalá sembo epai ya Yehova!” Salelá programɛ JW Library mpo na kotala video yango lisusu, mpe na nsima, yanolá na mituna oyo elandi:
Sonya asalaki mbula boni bandá balongolaki ye na lisangá?
Vɛrsɛ nini bankulutu batángelaki ye, mpe ndenge nini esalisaki ye?
Ndenge nini bandeko ya lisangá basalelaki Sonya makambo ntango bazongisaki ye na lisangá?
Makanisi nini ezalaki kotungisa Sonya, mpe ndenge nini tata na ye asalisaki ye?