BOMOI YA BAKRISTO
Sanzolá Yehova na bomoi na yo!
Bomoi ezali likabo ya motuya mingi. Ndenge oyo tosalelaka likabo yango mokolo na mokolo emonisaka ndenge totalelaka yango. Biso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi ete tósalela mayele mpe makoki na biso mpo na kokumisa mpe kosanzola Yehova, Mopesi ya bomoi. (Nz 36:9; Em 4:11) Ata bongo, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo ya mokili mabe oyo ekoki kosala tózongisa mikano ya elimo nsima. (Mr 4:18, 19) Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Napesaka mpenza Yehova oyo nazali na yango ya malamu koleka? (Hos 14:2) Mosala na ngai ya mosuni ezali komema ngai wapi? Mikano nini ya elimo namityeli? Ndenge nini nakoki kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola?’ Soki omoni bisika ya kobongisa, bondelá Yehova asalisa yo mpe salá nyonso ekoki mpo na kobongisa yango. Na ntembe te, kosanzola Yehova mokolo na mokolo esalaka ete moto asepela na bomoi mpe azala na esengo!—Nz 61:8.
Ozali kopesa mayele na yo epai ya nani?
TALÁ VIDEO SALELÁ MAKOKI OYO OZALI NA YANGO MPO NA YEHOVA, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mpo na nini ezali bozoba kopesa mokili ya Satana mayele na yo? (1Yn 2:17)
Baoyo bapesaka Yehova oyo bazali na yango ya malamu koleka bazwaka mapamboli nini?
Okosepela kosalela mayele mpe makoki na yo na mosala ya Nzambe na likambo nini?