Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Mai lok. 8
  • “Oyo Nzambe akangisi esika moko . . .”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo Nzambe akangisi esika moko . . .”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi mpenza nini mpo na koboma libala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Esengeli koboma libala to te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Esengeli kaka koboma libala?
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Mai lok. 8
Mobali ná mwasi basimbani na mabɔkɔ

BOMOI YA BAKRISTO

“Oyo Nzambe akangisi esika moko . . .”

Mibeko ya Moize esɛngaki mobali oyo alingi koboma libala akoma mokanda ya koboma libala. Yango ezalaki kopekisa mibali báwela koboma mabala na bango. Kasi, na mikolo ya Yesu, bakonzi ya mangomba bakómisaki koboma libala likambo ya pɛtɛɛ. Mibali bakokaki koboma libala na basi na bango mpo na likambo nyonso. (“mokanda ya kobengana mwasi” nɔti mpo na koyekola na Mr 10:4, nwtsty-E; “abomi libala na mwasi na ye,” “azali kosalela ye ekobo” banɔti mpo na koyekola na Mr 10:11, nwtsty-E) Yesu amonisaki polele ete Yehova nde apesá bato nzela bábalaka mpe ye nde Mobandisi ya libala. (Marko 10:2-12) Mobali ná mwasi basengeli kokóma “mosuni moko” mpe kofanda libela. Ntina se moko oyo Makomami endimi koboma libala, ezali “pite” ndenge mpe mokanda ya Matai emonisi yango.​—Mt 19:9.

Lelo, bato mingi batalelaka libala te ndenge Yesu atalelaki yango, kasi nde lokola Bafarisai. Soki matata ebimi, bawelaka koboma libala. Kasi, na lisangá, baoyo babalá bazwaka elako ya libala na lisɛki te mpe basalaka makasi básalela mitinda ya Biblia mpo na kolonga mikakatano. Nsima ya kotala video Bolingo mpe limemya esalisaka libala ezala na bomoko, yanolá na mituna oyo:

  • Kotánga Biblia; mobali azali koyoka ndenge mwasi na ye azali komonisa botɔndi; fɔtɔ ya libala oyo epasuki

    Ndenge nini okoki kosalela toli oyo ezali na Masese 15:1 na libala na yo, mpe mpo na nini ezali na ntina?

  • Ndenge nini kosalela toli oyo ezali na Masese 19:11 ekoki kosalisa yo kokima mikakatano?

  • Soki libala na yo elingi ekufa, na esika okanisa: ‘Naboma libala?’ osengeli nde komituna mituna nini?

  • Ndenge nini kosalela etinda oyo ezali na Matai 7:12 ekoki kokómisa yo mobali to mwasi malamu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto