MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | LUKA 10-11
Ndakisa ya Mosamaria ya motema malamu
Yesu apesaki ndakisa oyo mpo na koyanola na motuna, ‘Nani azali mpenza mozalani na ngai?’ (Lk 10:25-29) Ayebaki ete lisangá ya bokristo ekosangisa bato ya “ndenge nyonso”—ezala Basamaria mpe bato ya bikólo. (Yn 12:32) Ndakisa yango eteyaki bayekoli na ye ete basengeli kosala makasi bálinga bato mosusu, ata mpe baoyo bakoki kozala na mimeseno oyo ekesani mpenza na oyo ya bango.
OMITUNA BOYE:
‘Ndenge nini natalelaka bandeko oyo bazali na mimeseno oyo ekeseni na oyo ya ngai?
‘Nalekisaka ntango mingi kaka na baoyo makambo na bango eyokani na oyo ya ngai?’
‘Nakoki kofungola motema na ngai mpo na komesana na bandeko ya bikólo ndenge na ndenge?’ (2Ko 6:13)
Banani nalingi kobengisa mpo . . .
tóbima na mosala ya kosakola?
báya na ndako mpo tólya mwa eloko?
básangana na losambo na biso ya libota na mbala ya nsima?