Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Octobre lok. 8
  • Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo—Sepelá na solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo—Sepelá na solo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • “Bolingo . . . Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Tósepela kati na Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tósepelaka elongo na basusu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Basaleli ya Yehova basengeli ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Octobre lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Sepelá na solo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Tosengeli kopesa litatoli mpo na solo oyo etali mokano ya Nzambe ndenge Yesu asalaki. (Yn 18:37) Tosengeli mpe kosepelaka na solo, kolobaka solo, mpe kokanisaka makambo nyonso ya solo, atako tofandi na mokili oyo etondi na lokuta mpe na makambo ya kozanga boyengebene.​—1Ko 13:6; Flp 4:8.

NDENGE YA KOMONISA YANGO:

  • Zalá na ekateli ya koboya koyoka matɔngi to kopalanganisa yango.​—1Te 4:11

  • Kosepelaka te na mpasi ya basusu

  • Sepeláká na makambo ya malamu mpe ya kolendisa

TALÁ VIDEO “BÓZALA NA BOLINGO NA KATI NA BINO”​—KOSEPELAKA TE NA MAKAMBO YA KOZANGA BOYENGEBENE, KASI SEPELÁKÁ NDE NA SOLO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Nini emonisi ete Debbie azalaki ‘kosepela na makambo ya kozanga boyengebene’?

  • Ndenge nini Alice asalaki mpo masolo na ye ná Debbie elobela nde makambo ya kolendisa?

  • Wapi mwa makambo ya malamu oyo tokoki kolobela?

Alice azali kosolola na Debbie

Kosepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi sepeláká nde na solo

NDAKISA OYO EUTI NA BIBLIA MPO NA KOMANYOLA: Lota azalaki ntango nyonso komitungisa mpo na bizaleli mabe ya bato ya Sodoma ná Gomora.​—2Pe 2:8.

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini nakoki komonisa ete nasepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi nasepelaka nde na solo?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto