BOMOI YA BAKRISTO
“Bolingo . . . Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te”
Bakristo ya solo basalaka makasi bámonisa bolingo na makambo nyonso oyo bazali kosala. Bolingo “esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te.” (1Ko 13:4, 6) Yango wana, toboyaka kominanola oyo elendisaka pite mpe mobulu. Lisusu, tosepelaka te komona ndenge makambo ya mabe ekómelaka bato, ezala bato oyo basalaka biso mabe.—Mas 17:5.
TALÁ VIDEO KOBOSANA TE NDENGE OYO BOLINGO EZALAKA—ESEPELAKA NA MAKAMBO YA KOZANGA BOYENGEBENE TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
David ayokaki ndenge nini ntango azwaki nsango ete Saulo mpe Yonatane bakufi?
Loyembo nini ya mawa Davidi akomaki mpo na Saulo mpe Yonatane?
Mpo na nini Davidi asepelaki te ndenge Saulo akufaki?