Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Août lok. 3
  • Lekisáká ntango elongo na baoyo balingaka Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lekisáká ntango elongo na baoyo balingaka Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Yoasa atikaki Yehova mpo na baninga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yehova apesaka mbano na baoyo bamonisaka mpiko
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Mpiko ya Yehoyada
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Août lok. 3

BOMOI YA BAKRISTO

Lekisáká ntango elongo na baoyo balingaka Yehova

Mpo na nini tosengeli kolekisaka ntango elongo na baoyo balingaka Yehova? Mpo bato oyo tolekisaka ntango elongo na bango bakoki kobongisa to kobebisa bizaleli na biso. (Mas 13:20) Na ndakisa, Mokonzi Yehoashe asalaki “oyo ezali sembo na miso ya Yehova” ntango nyonso oyo azalaki elongo na nganga-nzambe monene Yehoyada. (2Nt 24:2) Nsima ya liwa ya Yehoyada, Yehoashe asundolaki Yehova mpo akómaki na baninga mabe.​—2Nt 24:17-19.

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, ntoma Paulo akokanisaki lisangá ya bokristo na “ndako ya monene” mpe basangani na yango na “bisaleli,” to biloko ya ndako. Tokotikala “esaleli ya lokumu” kaka soki toboyi boninga na moto nyonso oyo asepelisaka Yehova te, ezala ndeko ya libota to ya lisangá. (2Ti 2:20, 21) Na yango, tókoba kosala boninga na baoyo balingaka Yehova mpe baoyo bakolendisa biso tósalela ye.

TALÁ VIDEO YEBÁ KOKIMA BANINGA MABE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini na kozanga koyeba tokoki kolekisa ntango elongo na baninga mabe?

  • Na video oyo, nini esalaki ete bandeko misato bákata boyokani na baninga mabe?

  • Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa yo opona baninga na bwanya?

Na restora moko, John azali kotyela bakiliya na ye masanga; Kristin akɔti na site Internet ya kosolola na baninga; Jayden azali kobɛta lisano ya video na Internet; John ná libota na ye, Kristin, mpe Jayden bazali na makita

Nazali “esaleli ya lokumu”?​—2Ti 2:21

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto