BOMOI YA BAKRISTO
Okosala nini na eleko ya kokauka makasi?
Kondima mpe kotyela Yehova motema etambolaka nzela moko. Na ndakisa, kondima makasi epai ya Yehova esalisaka biso tótya motema ete akobatela mpe akokipe biso. (Nz 23:1, 4; 78:22) Awa nsuka ya mokili oyo ezali se kokóma pene, Satana akobundisa biso mingi lisusu. (Em 12:12) Nini ekosalisa biso?
TALÁ VIDEO OKOSALA NINI NA ELEKO YA KOKAUKA MAKASI? MPE YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndenge nini tozali lokola “nzete” oyo Yirimia 17:8 elobeli?
Wapi lolenge moko ya “molunge”?
Nini ekómeli “nzete” mpe mpo na nini?
Satana azali na mposa ya kobebisa nini?
Na ndenge nini tozali lokola baoyo bamesaná na mibembo ya aviɔ?
Mpo na nini tosengeli kokoba kotyela moombo ya sembo mpe ya mayele motema mpe komekama ya ndenge nini ekokómela biso?
Mpo na nini tosengeli kokoba kotyela mitinda ya Biblia motema atako mokili ezali kotyola biso?