MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 20-22
“Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika”
Yehova alaki ete akosala biloko nyonso biloko ya sika.
“Likoló ya sika”: Guvɛrnema ya sika oyo ekotya makambo ya boyengebene na mabele
“Mabele ya sika”: Bato nyonso oyo bandimi boyangeli ya Nzambe mpe bazali kotosa mibeko na ye ya sembo
“Biloko nyonso ya sika”: Makambo nyonso oyo etikaka biso na mpasi, ezala na nzoto, na makanisi to na motema, ekozala lisusu te; tokobanda nde kokanisa makambo kitoko ya mokolo na mokolo