BOMOI YA BAKRISTO
Kebá na kopanza bansango ya lokuta
Lelo oyo, bansango ekoki kopanzana epai ya bamilio ya bato na lombangu mpenza na nzela ya mikanda, radio, televizyo, mpe Internet. Bato nyonso oyo basambelaka “Nzambe ya solo” balingaka te kopanza bansango ya lokuta, ata na kozanga koyeba. (Nz 31:5; Kob 23:1) Lokuta oyo bato bapanzaka ekoki kobimisa likama monene. Ntango ozali koluka koyeba soki likambo moko ezali solo, omituna boye:
‘Likambo yango ekoki kotyelama motema?’ Moto oyo azali kobɛta lisolo akoki koyeba te ndenge makambo nyonso elekaki. Ntango moto ayoki lisolo mpe akei kobɛtela yango moto mosusu, mbala mingi moto yango abakisaka mwa pilipili ná mungwa, yango wana zalá ekɛngɛ ntango oyebi te esika lisolo yango euti. Lokola bandeko ya lisangá batyelaka bandeko oyo bazali na mikumba motema ete bakozwa bansango ya solo epai na bango, bandeko oyo bazali na mikumba basengeli kokeba ete bápanzaka te bansango ya lokuta
‘Likambo yango ezali kobebisa lokumu ya moto mosusu?’ Soki likambo yango ezali kobebisa lokumu ya moto to ya bato mosusu, ekozala malamu te kobɛtela yango basusu.—Mas 18:8; Flp 4:8
‘Likambo yango ekoki kondimama to kosalema?’ Zalá ekɛngɛ ntango ozali koyoka masolo oyo ezali kolobela makambo ya mabe mpe ya nsɔmɔ to oyo ekoki kosalema te
TALÁ VIDEO NASALA NINI MPO NATIKA MATƆNGI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Na kotalela Masese 12:18, maloba mabe ekoki kosala basusu nini?
Ndenge nini Bafilipi 2:4 esalisaka biso tózala na bokatikati ntango tozali kolobela makambo ya basusu?
Tokosala nini soki masolo oyo tozali kobɛta ekómi ya kotyola to ya koloba mabe ya basusu?
Liboso tóbanda kolobela makambo ya basusu, mituna nini tosengeli komituna?