Kosalela Internet—Kebá na makama!
1 Basaleli ya Yehova basepelaka kominanola elongo. Basepelaka koyebisa baninga na bango makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe balingaka koyoka makambo oyo etaleli bandeko na bango mpe ndenge mosala ya Bokonzi ezali kotambola na mokili mobimba. Balukaka koyeba makambo nyonso oyo ekómelaka bandeko na bango, lokola mikakatano to makama mauti na biloko bizalisami, mpe balingaka koyeba eloko nini bakoki kosala mpo na kosalisa bango. Ntango tozali komitungisa ndenge wana mpo na bandeko na biso, yango emonisaka ete tozali na bomoko na bandeko na biso, emonisaka ete tolinganaka mpenza.—Yoa. 13:34, 35.
2 Lelo oyo, toyokaka noki makambo oyo ezali koleka na mokili. Radio na televizyo epesaka nsango ya makambo oyo ezali kobima na mokili mobimba mpe bato nyonso bazali koyeba makambo yango mbala moko. Telefone mpe epesaka nzela na kosolola na bato na mokili mobimba. Lolenge ya sika ya kopanza nsango oyo ezali koningisa mokili lelo oyo ezali bongo Internet.—Talá Lamuká! ya 22 Yuli 1997 (ebimeli ya Lifalanse).
3 Ntango telefone ebimaki epesaki bato na mokili mobimba nzela báyebisanaka bansango noki. Atako telefone ezali na ntina mingi, tosengeli kozala na bokɛngi na ndenge oyo tozali kosalela yango, mpamba te ekoki kopesa nzela na kosala boninga na bato oyo bazali na bizaleli ya malamu te to na bato ya misala mabe. Telefone esɛngaka mbongo mingi. Televizyo na radio ekoki koteya biso. Nzokande, na mawa nyonso, baemisyo mingi oyo elekaka kuna ezalaka malamu te, mpe kotyela yango likebi mingi ebebisaka ntango. Soki tozali na mayele tokoyeba kopona ntango nini tosengeli kotala televizyo mpe ntango nini tosengeli koyoka radio.
4 Internet ezali kopesa moto nzela asolola na bamilio ya bato na mokili mobimba kasi akofuta mbongo mingi te, mpe ezali kopesa bato nzela báyeba makambo ebele. (Lamuká! ya 8 Yanuali 1998, ebimeli ya Lifalanse) Kasi, kosalela Internet na ndenge ya mabe ekoki komemela moto makama minene na elimo mpe ekoki kobebisa bizaleli na ye. Ndenge nini?
5 Bato mingi bazali komitungisa ntango bazali komona, na Internet, ndenge basalaka mandoki, mpe babombi. Bakonzi ya bakompanyi mingi bazali komilela ete basali bazali kolekisa ngonga mingi mpo na kosalela Internet. Mikanda na biso ezali kolobela mbala na mbala makama ya elimo oyo ekoki kobima na kosalela Internet. Bisika to site mingi ya Internet elakisaka bafilime ya mobulu mpe oyo emonisaka bolumbu ya basi mpe ya mibali, yango ezali mpenza mabe mpo na baklisto. (Nz. 119:37) Longola makama oyo touti kolobela, ezali na likama mosusu ya mabe mingi oyo Batatoli ya Yehova basengeli kokeba na yango mpenza. Wapi likama yango?
6 Okobengisa mopaya moko na ndako na yo soki oyebi ye? Bongo soki ozali na likoki te ya koyeba liboso soki moto yango azali nani, okotika mopaya yango ye moko na bana na yo? Yango ezali likambo oyo ekoki komonana mingi na Internet.
7 Na nzela ya Internet, bato bakoki kosolola na bato mosusu oyo bayebani na bango te ntango bazali kotindelana mikanda na ordinatɛrɛ (courrier électronique). Yango ezali mpe bongo mpo na kopesana makanisi na nzela ya Internet na makita ya bato nyonso (forum) to kobɛta masolo na bato mosusu. Bato mosusu bakoki koloba ete bazali Batatoli ya Yehova, nzokande bazali kokosa. Moto mosusu akoki koloba ete azali elenge, nzokande ezali bongo te. To moto mosusu akoki koloba ete azali mobali to mwasi, nzokande lokuta.
8 Bansango mosusu oyo okoki kozwa ekoki kozala masolo ya makambo oyo bakutanaki na yango to bakomantere likoló na bindimeli na biso. Bato mosusu mpe bakoki kolanda bansango yango, bato yango bakolekisa yango mpe epai ya bato mosusu. Mbala mingi likoki ya koyeba soki bansango yango ezali solo to lokuta ezali te, mpe ekoki kozala makambo ya lokuta. Bakomantere oyo etindamaka ekoki kozala lolenge ya kopalanganisa makanisi ya bapɛngwi.—2 Tes. 2:1-3.
9 Lokola oyebi makama yango, soki ozali kosalela Internet, omituna mituna oyo: ‘Mpo na nini nazali kosalela yango? Lolenge oyo nazali kosalela yango ekoki kobebisa ngai na elimo? Ekoki kozala ete nazali kobebisa elimo ya bato mosusu?’
10 Site Web ya “Batatoli ya Yehova”: Na ndakisa, tólobela naino basite ya Internet ya bato mosusu oyo balobaka ete bazali Batatoli ya Yehova. Bakobenga yo otala site na bango mpe otánga makambo oyo etindami na bato oyo bazali koloba ete bazali Batatoli ya Yehova. Bakosɛnga yo opesa makanisi na yo likoló na mikanda ya la Société. Bato mosusu bapesaka makanisi na bango mpo na ndenge ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola. Bato oyo bakɔti na site yango basalaka mwa lisangá ya kobɛta masolo mpe kosololaka mbala na mbala na bato mosusu, ndenge basololaka na telefone. Mbala mosusu bakoki kolakisa yo basite mosusu epai kuna okoki kosala boninga na Batatoli ya Yehova mosusu na mokili mobimba na nzela ya ordinatɛrɛ. Ntango mosusu okoki koloba ete masolo ya bokutani motindo wana ebongisami na bapɛngwi te, boye te?
11 Kosala boninga na bato mosusu na nzela ya Internet eyokani te na etinda oyo ezali na Baefese 5:15-17. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bókeba mpo na etambweli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. [Bómisombelaka ntango ebongi, NW], zambi mikolo mizali mabe. Na ntina yango bózala bilema te nde bósosola yango ezali mokano ya [Yehova].”
12 Lisangá ya boklisto ezali nzela bobele moko ya Teokrasi oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koleisa biso na elimo. (Mat. 24:45-47) Ebongiseli ya Nzambe, ezali kosalisa biso mpe kobatela biso ete tósangana na mokili te kasi tómipesa na mosala ya Nkolo. (1 Kol. 15:58) Mokomi na nzembo amonisaki ete azalaki kozwa esengo mpe libateli na kati ya lisangá ya bato oyo bazalaki kosambela Nzambe. (Nz. 27:4, 5; 55:14; 122:1) Lisangá epesaka lisungi na elimo mpe esalisaka bato oyo bazali kati na yango. Kuna okozwa baninga oyo bazali na bolingo, bazali komitungisa mpo na yo, mpe oyo bazali kotyela yo likebi—bato oyo oyebi bango malamu, baoyo bazali pene ya kosalisa mpe kobɔndisa basusu na ntango ya mpasi. (2 Kol. 7:5-7) Lisangá ebatelaka bandeko na basali na masumu oyo baboyi kobongola motema to baoyo bazali koteya lipɛngwi ndenge Makomami esɛngi yango. (1 Kol. 5:9-13; Tito 3:10, 11) Tokoki kokanisa ete tokozwa libateli na ebongiseli motindo oyo ntango tozali kosangana na bato mosusu na nzela ya Internet?
13 Emonani ete ezali bongo te. Bapɛngwi basalelaka basite mosusu ya Internet mpo na kopalanganisa mateya na bango. Na basite Web ya ndenge wana bakoki koloba ete bazali bapɛngwi te, mpe bato oyo bazali kosimba yango bakoki kopesa bandimbola ya sikisiki mpo na komonisa ete bazali mpenza Batatoli ya Yehova. Bakoki ata kosɛnga yo oyebisa bango makambo oyo ekomonisa ete ozali Motatoli ya Yehova.
14 Yehova alingi ete ozala na bososoli. Mpo na nini? Mpamba te ayebi ete bosololi ekobatela yo ozwa makama ya ndenge na ndenge te. Masese 2:10-19 ebandi na maloba oyo: “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.” Ekobatela yo na nini? Na makambo lokola “nzela mabe,” bato oyo batiki nzela ya sembo, mpe baoyo bapɛngwi na etamboli na bango mobimba.
15 Ntango tokendaka na Ndako ya Bokonzi, ntembe ezali te ete tozalaka elongo na bandeko na biso, toyebi bango. Moto moko te alukaka makambo mosusu mpo na koyeba soki tozali mpenza bandeko mpamba te bolingo ya bandeko emonisaka yango. Tozalaka na mposa ya koyeba makambo mosusu te mpo na komonisa ete tozali mpenza Batatoli ya Yehova. Ezali na lisangá nde tomonaka bandeko bazali mpenza kolendisana ndenge ntoma Paulo alobeli yango na Baebele 10:24, 25. Okoki te kolendisama motindo wana na basite Web oyo esɛngaka bato ete básala boninga na bato mosusu. Soki tozali ntango nyonso kokanisa maloba oyo ezali na Nzembo 26:4, 5 tokokima makama mingi ntango tozali kosalela basite Web na Internet.
16 Bato oyo basalelaka Internet bakoki kokuta makambo ebele ebele mpe ya lolenge nyonso; mingimingi bana mpe bilenge nde bakoki mpenza kobebisama na makambo mabe oyo ezali na Internet. Bana bazalaka na bindimandima, balukaka koyeba makambo ya sika mpe bazalaka na mposa ya koyeba makambo ya Internet, mpo ezali eloko ya sika. Baboti basengeli kokɛngɛla bana na bango mpe komonisa bango makebisi ya Makomami ntango bazali kosalela Internet, ndenge basalaka mpo na kosalisa bango bápona miziki to bafilime ya malamu.—1 Kol. 15:33.
17 Ezali mawa na komona ete bato mosusu oyo bazalaki liboso bandeko na biso basili kobimisama na lisangá mpo basalaki boninga ya kobɛta masolo na bato mosusu na nzela ya Internet mpe na nsima ememaki bango na etamboli ya mbindo. Bankulutu mosusu bakamwaki na likambo yango, bakomaki ete bato yango batikaki mibali na bango to basi na bango mpo na kolanda baninga oyo bazwaki na Internet. (2 Tim. 3:6) Bato mosusu batiki solo mpo bandimaki makambo oyo bapɛngwi bayebisaki bango. (1 Tim. 4:1, 2) Na kotalela makama oyo nyonso, ezali malamu tózala na bokɛngi mpo na oyo etali kozwa baninga ya kobɛta na bango masolo na Internet, boye te? Na ntembe te, soki tomonisi mayele, boyebi, mpe bososoli oyo elobelami na Masese 2:10-19 makama oyo nyonso ekozwa biso te.
18 Ezali na bato mosusu oyo basali basite na bango mpo na kosakola nsango malamu. Ba site yango mingi esimbami na bandeko oyo bazali mpenza na bokɛngi te. Bapɛngwi bakoki mpe kosimba ba site mosusu mpo na kokosa bato oyo bazangi bokɛngi. (2 Yoa. 9-11) Mpo na komonisa soki bandeko basengeli kosala basite Web, Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1997 na lokasa 5 elobaki ete: “Ezali na ntina te ete biso moko tóbongisa masolo na ntina na bindimeli mpe misala ya Batatoli ya Yehova mpo na kotya yango na Internet. Kode na biso oyo la Société abongisi [www.watchtower.org] ezali kopesa mayebisi ya sikisiki oyo moto nyonso asalelaka Internet akoki kozwa yango.”
19 Mikanda ya koyekola na nzela ya Internet? Bamosusu bakanisi ete bazali kosalisa bandeko mosusu na kotindeláká bango makambo oyo bazwi na bolukiluki na bango ya makambo ndenge na ndenge oyo ezali na boyokani na misala ya Teokrasi. Na ndakisa, moto moko akoki kosala bolukiluki likoló na lisukulu moko mpe na nsima atindi makambo ya bolukiluki yango epai ya bandeko mosusu, kokanisáká ete makambo yango ekosalisa baoyo bakosala lisukulu yango. Basusu batindaka bavɛrsɛ nyonso oyo ezali na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekotalelama na nsima to batindaka makambo oyo ekosalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi to na Boyekoli ya Mokanda na lisangá. Basusu bapesaka makanisi na bango mpo na masolo ya kosalela na mosala ya kosakola. Makambo nyonso oyo ekoki mpenza kosalisa bandeko?
20 Mikanda oyo Ebongiseli ya Yehova ebimisaka elamusaka mposa na biso mpo na makambo ya elimo na nzela ya makanisi ya kolendisa mpe esalisaka biso “mpo na kokesenisa na mabe na malamu.” (Ebe. 5:14, NW) Tokanisi mpenza ete tokoyeba kokesenisa na mabe na malamu soki bato mosusu nde bazali kosala bolukiluki mpe bazali koyebisa biso makambo bazwi?
21 Baklisto ya Beloya bakumisamaki mpo ‘bazalaki na ezaleli ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki.’ Mpo na nini? Mpamba te ‘bayambaki liloba na mposa makasi. Mpe mokolo na mokolo, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mpo na komona soki makambo yango ezalaki mpenza bongo.’ (Mis. 17:11, NW) Atako Paulo na Sila basakwelaki bango Liloba ya Nzambe, bakokaki koyeba solo malamumalamu bobele soki bamipesaki bango moko na kotánga.
22 Kosalela makambo moto mosusu azwi na bolukiluki na ye moko mpo na kobongisa lisukulu to kobongisa likita ezali kobebisa boyekoli ya moto ye moko. Mposa na yo ezali ya kotonga kondima na yo moko na Liloba ya Nzambe, boye te? Okoki komonisa kondima na yo wana ozali kosala masukulu, ozali kopesa biyano na makita, mpe na mosala ya kosakola. (Lom. 10:10) Kosalela makambo oyo moto mosusu azwi na bolukiluki na ye moko eyokani te na Masese 2:4, 5 oyo elobi ete moto na moto ‘aluka mpe alukaluka boyebi ya Nzambe lokola biloko ya motuya oyo ebombami.’
23 Na ndakisa, ntango ozali koluka bavɛrsɛ na Biblia na yo moko okoki mpe kotalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima na esika oyo otángi. Okoki ‘kolandela makambo nyonso malamumalamu’ ndenge Luka asalaki ntango akomaki Evanzile na ye. (Luka 1:3, NW) Milende oyo ozali kosala ekoki mpe kosalisa yo ntango ozali koluka bavɛrsɛ na mosala ya kosakola mpe ntango ozali kosala masukulu. Bato mingi balobaka ete bakamwaka na Batatoli ya Yehova mpo bayebi kosalela Biblia na bango malamu. Lolenge bobele moko oyo tokoki komesana na yango malamu ezali ya komipesa na koluka bavɛrsɛ na Biblia na biso moko.
24 Tósalela ntango na biso malamu: Likambo mosusu etaleli ngonga ya kolekisa mpo na kosala, kotánga, mpe kozongisa biyano na nyonso oyo ezali kotindama na nzela ya Internet. Nzembo 90:12 ezali kolendisa biso tóbondelaka boye: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema na mayele.” Paulo alobaki ete ‘ntango oyo etikali ezali mokuse.’ (1 Kol. 7:29, NW) Alobaki mpe lisusu ete: “Bongo, soki tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósalela bato nyonso malamu, kasi mingimingi baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”—Gal. 6:10, NW.
25 Toli oyo ezali komonisa biso ntina ya koyeba kosalela ntango na biso malamu. Tokozwa litomba mingi soki tokolekisa ntango mpo na kotánga Liloba ya Nzambe! (Nz. 1:1, 2) Yango ezali boninga malamu oyo tokoki kosala. (2 Tim. 3:16, 17) Baboti, boteyaka bana na bino mpo na kosalela ntango na bango malamu basengeli komipesa na mosala ya Bokonzi? (Mos. 12:1) Ntango oyo tolekisaka na koyekola Biblia biso moko to na libota, koyangana na makita, mpe kosakola nsango malamu eleki ntango oyo moto akoki kolekisa liboso ya Internet, kokanisáká ete yango ekomemela ye matomba.
26 Mpo na yango, ezali likambo malamu tótya likebi na biso na makambo ya elimo mpe na makambo ya ntina mpe oyo ebongi na bomoi na biso baklisto. Yango ezali kosɛnga tóyeba malamu makambo nini tosengeli kopesa yango ntango mpe likebi na biso. Lokola tozali baklisto, eloko oyo ezali na ntina mingi na bomoi na biso ezali likambo oyo Klisto alobaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ekobakisama na bino.” (Mat. 6:33) Omonaka te ete ozalaka na esengo mingi ntango omipesaka na misala ya Bokonzi, koleka ntango omipesaka na misala mosusu nyonso?
27 Kotindelana mikanda (courrier électronique, e-mail): Atako ezali malamu koyebisana bansango to makanisi na bato ya libota na biso to baninga na biso oyo bafandaka mosika, kasi soki obandi koyebisa makambo yango epai ya bato mosusu oyo bayebi libota na yo te to bayebi baninga na yo te, okomonisa mpenza ete olingaka bango? To esengeli kotya bansango yango na site web mpo moto nyonso atánga yango? Okoki kosala kopi na yango mpe kotinda yango epai ya bato oyo oyebi bango mpe oyo oyebi bango te? Ndenge moko, soki bato mosusu batindeli yo nsango oyo etali yo te, okomonisa mpenza ete ozali na bolingo soki oyebisi yango epai ya bato mosusu?
28 Ezali boni soki likambo oyo oyebisi ezali ya solo te? Okosangana na kopalanganisa lokuta, boye te? (Mas. 12:19; 21:28; 30:8; Kols. 3:9) Na ntembe te, soki tozali ‘kotala malamumalamu ndenge [tozali] kotambola, ete ezala lokola bazoba te, kasi lokola bato ya mayele’ yango ekopusa biso na kotalela likambo yango. (Ef. 5:15, NW) Oyo nde esengo tozali na yango ya kotánga makambo ya solo oyo bandeko bakutanaki na yango, oyo ezali na Annuaire, na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe na Lamuká! makambo oyo ezali kolendisa biso tótambola ntango nyonso na “nzela”!—Yis. 30:20, 21.
29 Ezali mpe na likama mosusu. Ntoma Paulo alobaki mpo na bato mosusu ete: “Lisusu, bakoyekolaka kozala na gɔigɔi, kolekaleka na ndako na ndako. Ɛɛ bazali bobele na gɔigɔi te kasi bato na bilobaloba mpe bisalasala [bamikɔtisaka na makambo ya bato, NW] awa ekosololaka bango makambo mabɔngi te.” (1 Tim. 5:13) Yango ezali kobebisa ntango mpe kosala milende ya mpamba mpo na koyebisa bandeko makambo ezangi ntina.
30 Tókanisa mpe ntango nyonso oyo esengeli kolekisa mpo na kotalela ebele ya mikanda batindaka. Buku Data Smog elobi boye: “Soki moto azali kolekisa ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ, mosika te, mikanda yango ekozala lisusu te likambo ya sika oyo ezali kosepelisa ye, kasi ekokóma mokumba oyo ekobanda kolya ntango mingi. Ekosɛnga ete atángaka ebele ya bansango mokolo na mokolo mpe atindaka biyano epai ya baninga, bandeko . . . mpe bapiblisite ya biloko ya koteka.” Mokanda yango elobi lisusu boye: “Bato mingi oyo basalelaka Internet bakómi na momeseno mabe ya kotindela moto nyonso oyo azali na adresi ya Internet likambo nyonso ya sika oyo bamoni: ezala masano, masolo ya kosɛkisa, mikanda oyo batindeli bango mpe oyo bango basengeli kotindela bato mosusu oyo basalelaka Internet, mpe makambo mosusu mingi.”
31 Likambo yango emonanaki na mikanda oyo elekalekaki epai ya bandeko na biso—makambo lokola masano to masolo ya kosɛkisa oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola; maloba ya ntɔki (poème) na bindimeli na biso; bilakiseli oyo bandeko basalaki na masukulu ndenge na ndenge ya mayangani ya mike mpe ya minene, to masukulu na Ndako ya Bokonzi; makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola; mpe bongo na bongo—makambo oyo emonanaka ete ezali na likama ata moke te. Mbala mingi batindaka makambo yango ata bayebi esika euti te, mpe na nsima likoki ya koyeba nani atindaki yango ezalaka te, yango etindaka bato mosusu bámituna soki yango ezali mpenza makambo ya solo.—Mas. 22:20, 21.
32 Bansango yango ya masano ezalaka lolenge ya maloba oyo epesaka matomba te. Ntoma Paulo azalaki kokanisa lolenge ya maloba oyo epesaka litomba ntango akomelaki Timote ete: ‘Kangamá makasi na lolenge ya maloba oyo epesaka matomba, maloba oyo oyokaki epai na ngai na kondima mpe na bolingo oyo eyokani na Klisto Yesu.’ (2 Tim. 1:13, NW) “Monɔkɔ na pɛto” oyo ezali na kati ya solo ya Makomami ezali na ‘lolenge na maloba oyo epesaka matomba,’ etongami mpenzampenza likoló na motó na likambo ya Biblia, kolongisama ya lotomo oyo Yehova azali na yango ya kozala Mokonzi na nzela ya Bokonzi. (Sef. 3:9) Tosengeli kosala milende mpo na kosalela ntango na biso nyonso mpe makasi na biso nyonso mpo na kosimba mosala oyo ezali kolongisa lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi.
33 Lokola tokómi mpenza na ntango ya nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo, yango ezali te ntango ya kolembisa bokɛngi na biso. Biblia ezali kokebisa biso boye: ‘Bóbatela makanisi na bino, bósɛnzɛlaka, monguna na bino, Zabolo, azali kotambola lokola nkosi oyo ezali koganga, azali koluka kolya moto.’ (1 Pet. 5:8, NW) Biblia elobi lisusu ete: “Bólata molato mobimba ya etumba ya Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma makasi mpo na kobundisa mayele mabe ya Zabolo.”—Ef. 6:11, NW.
34 Soki Internet esalelami malamu te, ekoki kozala nzela mpo Satana akanga baoyo bazali komipesa na yango. Atako ezali na ntina, kasi likama ezali soki tosaleli yango na bokɛngi te. Mingimingi baboti basengeli kokeba na lolenge oyo bana na bango bazali kosalela Internet.
35 Kotalela Internet na bokatikati ekoki kobatela. Tozali kosepela na toli malamu oyo Paulo apesaki ete: ‘Na yango . . . baoyo bazali kosalela mokili bázala lokola baoyo bazali mpenza kosalela yango te, mpamba te makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.’ (1 Kol. 7:29-31, NW) Soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo oyo, yango ekosalisa biso mpe libota na biso ete tópɛngwisa likebi na biso te mpo na makambo nyonso oyo mokili ezali kobimisa, bakisa mpe Internet.
36 Kokangama na bandeko na biso na kati ya lisangá mpe kosalela malamu ntango oyo etikali ezali na ntina, mpe na yango tokomipesa biso moko mpo matomba ya mosala ya Bokonzi ekende liboso. Lokola ebongiseli oyo ekómi na nsuka na yango, tiká ete ‘tótambola lisusu te ndenge bapakano mpe batambolaka na kati ya bozoba ya mayele na bango,’ kasi ‘tósosolaka nde yango ezali mokano ya Nkolo.’—Ef. 4:17, NW; 5:17.