Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Octobre lok. 5
  • Bilenge​—Yehova azali moninga na bino ya motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Yehova azali moninga na bino ya motema?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?
    Lamuká!—2009
  • Kozala moninga malamu esɛngaka nini?
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Octobre lok. 5
Elenge mobali afandi mpe azali koyekola.

BOMOI YA BAKRISTO

Bilenge​—Yehova azali moninga na bino ya motema?

Bizaleli nini olukaka epai ya moninga moko? Mbala mosusu, olukaka ete azala na boboto, bosembo, mpe azala mokabi. Yehova amonisaka bizaleli wana nyonso. (Kob 34:6; Mis 14:17) Ayokaka yo ntango ozali kobondela ye. Asalisaka yo ntango nyonso oyo ozalaka na mposa ya lisalisi. (Nz 18:19, 35) Alimbisaka mabunga na yo. (1Yn 1:9) Oyo nde moninga ya motema mpenza!

Ndenge nini okoki kozala moninga ya Yehova? Yekoláká Liloba na ye mpo na koyeba ye. Tyeláká ye motema. (Nz 62:8; 142:2) Monisáká ete ozwaka na motuya makambo oyo ezali na motuya mingi na miso ya Yehova, na ndakisa, Mwana na ye, Bokonzi na ye, mpe bilaka na ye mpo na mikolo ezali koya. Yebisáká basusu makambo na ye. (Mib 32:3) Soki ozali kokómisa makasi boyokani na yo ná Yehova, akozala moninga na yo mpo na libela.​—Nz 73:25, 26, 28.

TALÁ VIDEO BILENGE​—“BÓMEKA MPE BÓMONA ETE YEHOVA AZALI MALAMU,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bilenge​—Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’ Elenge mwasi moko azali kobondela liboso abanda boyekoli na ye.

    Ndenge nini okoki komibongisa mpo na komipesa mpe kozwa batisimo?

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bilenge​—Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’ Elenge mobali ya mobongisi-nzela azali kotángela mobali moko vɛrsɛ na monɔkɔ ya Karen.

    Ndenge nini basusu na lisangá bakoki kosalisa yo osalela Yehova?

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bilenge​—Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’ Elenge mobali moko oyo asepelaka na lisalisi ya mikolo azali na mosala ya kosakola ndeko mobali moko ya mokolo.

    Ndenge nini mosala ya kosakola ekómisaka makasi boyokani na yo ná Yehova?

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bilenge​—Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’ Ndeko mwasi oyo nsima ya kotambola bangonga mibale na makolo, azali sikoyo koyekola na elenge mwasi moko ya baba.

    Boninga elongo na Yehova ekoki koumela seko!

    Mikumba nini okoki kokokisa na mosala ya Yehova?

  • Nini ebendaka yo epai ya Yehova?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto