Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Décembre lok. 7
  • Ozali na mposa ya kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na mposa ya kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Omityela mikano mpo na mobu ya mosala ya sika—Luká kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Bamisionɛrɛ “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Eteyelo oyo bayekoli na yango bazali kosalisa bato na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Décembre lok. 7
Bana-kelasi bazali kolanda mateya na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

BOMOI YA BAKRISTO

Ozali na mposa ya kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi

Ozali na mbula kobanda 23 tii 65 mpe ozali na mosala ya ntango nyonso? Ozali na nzoto kolɔngɔnɔ, mpe okoki kosala esika nyonso oyo mposa ezali? Soki eyano na yo ezali “ɛɛ” na mituna wana, okanaka kotondisa formilɛrɛ mpo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Kobanda na kelasi na yango ya liboso, bankóto ya bandeko, ezala babalani, basi to mibali oyo bazali minzemba batondisaka formilɛrɛ yango. Ata bongo tozali nde na mposa mingi ya bandeko mibali oyo bazali minzemba. Sɛngá Yehova apesa yo mposa ya kosepelisa ye mpe ya komekola Mwana na ye. (Nz 40:8; Mt 20:28; Ebr 10:7) Mpe na nsima, talelá ndenge oyo okoki kobongola makambo na yo mosusu ya bomoi mpo okokisa masɛngami.

Mabaku nini bandeko yango bazwaka nsima ya kozwa formasyo wana ya Teokrasi? Batindaka bango na bateritware ya minɔkɔ mosusu to na bisika ya bato mingi to mpe bingumba minene. Na nsima ya mwa ntango bandeko yango mosusu basalaka lokola bakɛngɛli ya zongazonga basungi, bakɛngɛli ya zongazonga, to bamisionɛrɛ oyo bazali kosala na teritware. Wana ozali kokanisa na ndenge okoki komipesa na mosala ya Yehova, kobosana te maloba oyo mosakoli Yisaya alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.”​—Yis 6:8.

TALÁ VIDEO BAMISIONƐRƐ OYO BASALAKA NA TERITWARE​—BASALI NA MOSALA YA KOBUKA MBUMA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bamisionɛrɛ oyo basalaka na teritware​—Basali na mosala ya kobuka mbuma.’ Babalani oyo bazali bamisionɛrɛ bazali na mosala ya kosakola, bazali kotambola na balabala moko.

    Ndenge nini baponaka bamisionɛrɛ oyo basalaka na teritware?

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bamisionɛrɛ oyo basalaka na teritware​—Basali na mosala ya kobuka mbuma.’ Misionɛrɛ oyo asalaka na teritware elongo na mosakoli mosusu bazali koyekola Biblia na mwasi moko.

    Mosala nini ya malamu bamisionɛrɛ oyo basalaka na teritware basalaka?

  • Elilingi oyo euti na video ‘Bamisionɛrɛ oyo basalaka na teritware​—Basali na mosala ya kobuka mbuma.’ Misionɛrɛ oyo asalaka na teritware ya monɔkɔ ya bababa azali kosolola na ndeko mosusu mpo na formilɛrɛ moko ya mosala ya ntango nyonso.

    Wapi mwa mapamboli oyo mosala ya misionɛrɛ epesaka?

Okosepela koyeba makambo mosusu mpo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Kende na jw.org na Bibliotɛkɛ na eteni “Bavideo” mpe talá esika bakomi MISALA NA BISO > BITEYELO YA TEOKRASI MPE FORMASYO. Talá bavideo Biteyelo ya Teokrasi na kati ya Afrika, Mateya ya Yehova ekómisi bango bazwi na elimo, mpe Kelasi ya liboso ya Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto