Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Janvier lok. 3
  • Baboti, bóteya bana na bino makambo oyo basengeli koyeba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti, bóteya bana na bino makambo oyo basengeli koyeba
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Baboti bóbatela bana na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bana bazali libula ya motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Janvier lok. 3
Bana bazali kosala elakiseli ndenge ya koboya likambo ya mabe ntango baboti na bango bazali koteya bango ndenge basengeli komibatela ntango balingi kosala bango mabe.

BOMOI YA BAKRISTO

Baboti, bóteya bana na bino makambo oyo basengeli koyeba

Tozali kofanda na mokili oyo ezali kotinda biso tómona ete malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu. (Yis 5:20) Likambo ya mawa, bato mosusu basalaka makambo oyo Yehova ayinaka, na ndakisa, kosangisa nzoto basi ná basi to mibali ná mibali. Baninga ya kelasi to bato mosusu bakoki kotinda bilenge na biso oyo tolingaka mingi ete bálanda makanisi na bango. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bálanda te makanisi ya baninga na bango mpo bálonga komekama ya ndenge wana?

Teyá bana na yo báyeba mibeko ya Yehova. (Le 18:3) Teyáká bango mokemoke makambo oyo Biblia elobi na oyo etali kosangisa nzoto, mpe yebisá bango makambo oyo eyokani na mbula na bango mpe oyo bakokanga ntina na yango. (Mib 6:7) Omituna boye: ‘Nayebisaka bana na ngai makambo nini ebongi moto asalela bango mpo na komonisa ete moto yango alingaka bango, ntina ya kolata na ndenge ebongi mpe ntina ya koboya ete moto asimba bango na bisika oyo ebongi te? Bana na ngai bayebi oyo bakosala soki moto moko alingi kolakisa bango pornografi to soki asɛngi bango básala likambo moko oyo Yehova aboyaka?’ Soki bana na yo bayebi makambo wana nyonso, yango ekosalisa bango bákima makama wana. (Mas 27:12; Mos 7:12) Ntango oteyaka bana na yo, omonisaka bolingo mpo na libula ya motuya oyo Yehova apesá yo.​—Nz 127:3.

TALÁ VIDEO TONGÁ NDAKO OYO EKOUMELA​—BATELÁ BANA NA YO NA “MAKAMBO OYO EZALI MABE,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi ya video Tongá ndako oyo ekoumela​—Batelá bana na yo na “makambo oyo ezali mabe.” Mama moko ná mwana na ye ya mobali bazali kotala video ‘Batelá bana na yo.’

    Mpo na nini baboti mosusu bakakatanaka koteya bana na bango makambo etali kosangisa nzoto?

  • Elilingi ya video Tongá ndako oyo ekoumela​—Batelá bana na yo na “makambo oyo ezali mabe.” Baboti bazali koyekola buku ‘Yekolá epai ya moteyi monene’ mpe mikanda mosusu elongo na bana na bango mibale.

    Mpo na nini baboti basengeli kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova”?​—Ef 6:4

  • Elilingi ya video Tongá ndako oyo ekoumela​—Batelá bana na yo na “makambo oyo ezali mabe.” Baboti moko na Afrika bazali kotánga mpe koyekola Biblia elongo na bana na bango.

    Boyebi ebatelaka

    Bisaleli nini ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na kosalisa baboti báteya bana na bango makambo etali kosangisa nzoto?​—w19.05 lok. 12, etanda

  • Mpo na nini osengeli kosololaka ntango nyonso na bana na yo liboso makama ebima?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto