Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Septembre nk. 3-16
  • Salelá buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na mosala ya kosakola
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya koyekola Biblia na moto na lisalisi ya buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Septembre nk. 3-16
Mobali moko ná mwasi na ye bazali kosalela mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” mpo na kosolola na mobali moko na esika bazelaka bisi.

BOMOI YA BAKRISTO

Salelá buku Sepelá na bomoi libela na libela! na mosala ya kosakola

Tozali mpenza na esengo mingi ndenge tozwi mwa buku mpe buku ya sika mpo na koyekola na bato Biblia! Tozali kobondela Yehova apambola milende na biso mpo tókómisa lisusu bato mingi bayekoli. (Mt 28:18-20; 1Ko 3:6-9) Ndenge nini tokosalela bisaleli yango ya sika?

Lokola buku Sepelá na bomoi libela na libela!, boyekoli ya Biblia, emonisi lolenge ya sika ya koteya, ebongi olanda malamumalamu malako oyo ntango ozali komibongisa to ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia.a

  • Tángá lisolo, mpe talelá mituna

  • Tángá bavɛrsɛ oyo bakomi “tángá,” mpe salisá moyekoli akanga ntina ya bavɛrsɛ yango mpo na kosalela yango

  • Lakisá bavideo mpe bólobela yango, salelá mituna nyonso oyo ezali wana

  • Luká kosilisa liteya mokomoko na mbala moko

Na mosala ya kosakola, pesá liboso mwa buku mpo na koyeba soki moto yango asepeli. (Talá etanda “Ndenge ya kokabola mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! na Bokutani ya liboso.”) Soki bosilisi koyekola mwa buku yango na moyekoli mpe alingi kokoba, na ntango wana nde okopesa ye buku mpo bóbanda na liteya 04. Soki osí obandá koyekola na moto na moko ya mikanda oyo toyekolaka na bato Biblia, kɔtisá ye mbala moko na buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpe talá soki ekozala malamu bóbanda na liteya nini.

Kaka babalani yango bazali kosalela buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” ntango bazali koyekola na mobali yango Biblia na ndako.

TALÁ VIDEO BOYEI MALAMU NA BOYEKOLI NA YO YA BIBLIA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini bayekoli ya Biblia bakoyekola na buku oyo ya sika?

  • Mpo na nini ezali na ntina olakisa bayekoli ya Biblia video oyo?

  • Mokemoke osengeli kolendisa bayekoli ya Biblia bámityela mpe bákokisa mikano nini?​—Talá etanda “Mokano mpe oyo okoki kosala mpo na eteni mokomoko”

a NƆTI: Atako osengeli kopona soki bokosalela etanda “Makanisi mosusu” to te na boyekoli na bino, zwá ntango ya kotánga mpe kotala lisolo mokomoko ntango ozali komibongisa. Wana nde okoyeba nini ekozala malamu mpo na moyekoli na yo. Soki ozali kosalela buku yango na aparɛyi, okomona bisika oyo okoki kofina mpo na komona bavideo mpe makambo mosusu.

MOKANO MPE OYO OKOKI KOSALA MPO NA ETENI MOKOMOKO

 

MATEYA

MOKANO

MIKANO YA MOYEKOLI

1

01-12

Talelá ndenge Biblia ekoki kosalisa yo mpe ndenge oyo okoki koyeba Moto oyo akomisaki yango

Lendisá moyekoli atángaka Biblia, abongisaka boyekoli, mpe abanda koyangana na makita

2

13-33

Talá oyo Nzambe asalá mpo na biso mpe lolenge ya losambo oyo esepelisaka ye

Lendisá moyekoli ayebisaka bato mosusu solo mpe akóma mosakoli

3

34-47

Talelá makambo oyo Nzambe asɛngaka bato oyo basambelaka ye

Salisá moyekoli amipesa epai ya Yehova mpe azwa batisimo

4

48-60

Yekolá ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe

Teyá moyekoli ayeba kokesenisa malamu ná mabe mpe akola na elimo

NDENGE YA KOKABOLA MWA BUKU SEPELÁ NA BOMOI LIBELA NA LIBELA! NA BOKUTANI YA LIBOSO

Ndenge moko na batrakte oyo tosalelaka, na lokasa ya nsuka ya mwa buku yango ezali na motuna moko ya ntina. Meká kosala boye:

  • Tuná motuna oyo ekosalisa moto apona moko ya biyano oyo ezali na mwa buku yango

  • Tángá eyano ya Biblia na Nzembo 37:29

  • Bólobela makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Yango elimboli nini mpo na yo.” Soki likoki ezali, tángá bavɛrsɛ mpe lobelá bililingi

  • Tuná ye motuna oyo: “Tokoki mpenza kondimela Biblia?” mpe bóbanda koyekola na ye liteya ya liboso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto