BOMOI YA BAKRISTO
Makanisi mpo na kotambwisa likita ya mosala ya kosakola oyo ekobimisa matomba
Ndenge moko na makita nyonso, likita ya mosala ya kosakola ezali ebongiseli ya Yehova oyo esalisaka biso tólendisanaka, tólinganaka mpe tósalaka misala ya malamu. (Ebr 10:24, 25) Likita yango esengeli koumela miniti 5 to 7, mpo na kokabola bandeko, kopesa bandeko teritware mpe kobondela. (Soki esalemi nsima ya makita ya lisangá, esengeli kozala lisusu mokuse koleka.) Motambwisi asengeli kobongisa mwa makanisi oyo ekosalisa bandeko na mosala ya kosakola na mokolo yango. Na ndakisa, na mokolo ya pɔsɔ soki ezali na bandeko mingi oyo basakoli naino te banda pɔsɔ oyo eleki, ekoki kozala malamu kotalela kaka makambo oyo moto asengeli koyebisa nkolo-ndako. Wapi mwa makambo mosusu oyo ekoki kozala na ntina kotalela na likita yango?
Makanisi ya “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezalaka na Mokanda ya likita—Bomoi mpe mosala ya bakristo
Ndenge ya kosalela makambo oyo ezali kosalema to bansango mpo na kobanda lisolo
Ndenge ya kopesa eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino
Ndenge ya kosolola na moto oyo andimaka te ete Nzambe azali, moto oyo andimelaka evolisyo, moto oyo azali koloba monɔkɔ mosusu, to moto oyo asambelaka na lingomba moko oyo eyebani te na teritware na bino
Ndenge ya kosalela masolo oyo ebimaka na site jw.org, JW Library®, to Biblia
Ndenge ya kosalela moko ya bisaleli na biso mpo na koteya
Ndenge ya kosakola na telefone, na esika ya bato mingi, kokoma mikanda, kozongela moto, to koyekola na moto Biblia
Kolobela makambo etali komibatela, komesana na mayele ya sika, kozala na bizaleli ya malamu, makanisi ya malamu to makambo mosusu ya bongo
Liteya to video moko oyo euti na mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Ndenge ya kolendisa to kosalisa moninga oyo obimi na ye na mosala ya kosakola
Mokapo moko ya Biblia oyo eyokani na mosala ya kosakola to likambo moko ya kolendisa oyo esalemaki na mosala ya kosakola