Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Novembre lok. 15
  • Salisá bayekoli ya Biblia bámileisaka na elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bayekoli ya Biblia bámileisaka na elimo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bákóma baninga ya Yehova
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Simbáká mitema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Novembre lok. 15

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Salisá bayekoli ya Biblia bámileisaka na elimo

Mpo bayekoli ya Biblia báyeba Yehova mpe bákóma mpenza bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, basengeli koyekola makambo mingi kasi kaka te mateya ya solo oyo toteyaka bango. (Mt 5:3; Ebr 5:12–6:2) Basengeli mpe koyekola ndenge ya komileisa bango moko na elimo.

Liboso, lakisá bayekoli na yo ndenge ya kobongisa boyekoli ya Biblia, mpe lendisá bango básalaka yango. (mwb18.03 lok. 6) Lendisá bango bábondelaka liboso ya kobanda koyekola bango moko. Lakisá bango ndenge ya kokɔta mpe ya kosalela mikanda oyo etángamaka na telefone to na tablɛti. Lakisá bango ndenge ya kotala masolo ya sika na jw.org mpe na TV JW. Mokemoke salisá bango bátángaka Biblia mokolo na mokolo, bábongisaka makita ya lisangá, mpe bálukaka biyano na mituna oyo bazali na yango. Salisá bango bákanisaka na mozindo makambo oyo bazali kotánga.

TALÁ VIDEO SALISÁ BATO OYO OYEKOLAKA NA BANGO BIBLIA BÁMILEISAKA NA ELIMO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bámileisaka na elimo.” Rose azali kolobela makambo oyo esimbi motema na ye.

    Ndenge nini Neeta asalisaki Rose amona ete koyekola esuki kaka te na kozwa biyano na mituna?

  • Elilingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bámileisaka na elimo.” Neeta azali kosalisa Rose azwa eyano na Biblia.

    Nini esalisaki Rose amindimisa ete Yehova azali na lotomo ya kopekisa pite?

  • Elilingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bámileisaka na elimo.” Rose azali kokanisa na mozindo na vɛrsɛ moko wana afandi pene ya moninga na ye moko ya mobali.

    Salisá bayekoli na yo ya Biblia báyekolaka makambo ya ntina mpe básalelaka yango

    Rose ayaki koyeba likambo nini na oyo etali komanyola?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto