Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Mars lok. 7
  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bákóma baninga ya Yehova
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi na nzela ya libondeli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Simbáká mitema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Mars lok. 7

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe

Kaka bato oyo bazali pɛto na bizaleli nde bakoki kosala boninga makasi ná Yehova. (1Pe 1:14-16) Ntango bayekoli ya Biblia bazali kosala makasi bátika bizaleli mabe, yango ekoki komemela bango matomba, na ndakisa na libota, na nzoto, to mpe na makambo ya mbongo.

Limbwelá polele moyekoli na yo mitinda ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu, ntina na yango mpe matomba oyo akoki kozwa soki asaleli yango. Salá makasi osalisa bayekoli na yo ya Biblia bábongola ndenge na bango ya kokanisa, yango ekosalisa bango básala oyo Yehova alingi. (Ef 4:22-24) Salisá bango báyeba ete na lisalisi ya Yehova bakoki kolonga bizaleli mabe oyo ebotá misisa na mitema na bango. (Flp 4:13) Teyá bango ete basengeli kobondelaka Yehova wana bamekami mpo na kosala lisumu. Salisá bango báyeba makambo oyo ekoki kotya bango na komekama mpe ndenge bakoki kokima yango. Lendisá bango básalaka makambo ya malamu na esika ya kosala makambo ya mabe oyo bamesanaki kosala. Toyokaka esengo ntango tomonaka bayekoli ya Biblia batiki mimeseno ya mabe na lisalisi ya Yehova.

TALÁ VIDEO SALISÁ BATO OYO OYEKOLAKA NA BANGO BIBLIA BÁTIKA BIZALELI MABE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bililingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe.” Neeta ná Rose bakutani na bankulutu.

    Bankulutu mpe Neeta basilikaki ntango bayebaki ete Rose azali na ezaleli moko ya mabe?

  • Bililingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe.” Neeta azali koyekola na Rose.

    Ndenge nini Neeta asalisaki Rose?

  • Bililingi euti na video “Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe.” Rose azali kobondeli Yehova asalisa ye.

    Ndenge nini Rose alukaki lisalisi epai ya Yehova?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto