Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Janvier lok. 11
  • Luká makanisi ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká makanisi ya Nzambe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge ya kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koluka bwanya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Baboti​—⁠Bóteya bana na bino ndenge ya kosepelisa Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Janvier lok. 11
Elilingi ya video “Tosengeli ‘koyika mpiko ntango tozali kopota mbangu’​—Lyáká bilei oyo etongaka nzoto.” Rebeka azali kosalela mwa buku “Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie” mpo na kosala bolukiluki.

BOMOI YA BAKRISTO

Luká makanisi ya Nzambe

Tolingaka kosepelisa Yehova na makambo nyonso oyo tosalaka. (Mas 27:11) Mpo na kosala bongo, tosengeli kozwa bikateli oyo eyokani na makanisi na ye ata soki mobeko moko ya polele ezali te. Nini ekoki kosalisa yo osala yango?

Zaláká na momeseno ya koyekola Biblia mbala na mbala. Ntango nyonso oyo totángaka Biblia, ezali lokola tozali kolekisa ntango elongo na Yehova. Tokoki koyekola ndenge oyo Yehova akanisaka soki totali ndenge oyo asalelaki basaleli na ye makambo mpe totaleli bandakisa ya baoyo basalaki malamu to mabe na miso na ye. Ntango tolingi kozwa ekateli moko, elimo santu ekoki kozongisa na makanisi na biso mateya ya ntina mpe mitinda oyo toyekolaki na Liloba ya Nzambe.​—Yn 14:26.

Saláká bolukiluki. Soki osengeli kozwa ekateli na likambo moko, omituna boye: ‘Bavɛrsɛ to masolo nini ya Biblia ekoki kosalisa ngai nayeba ndenge Yehova azali kotalela likambo yango?’ Bondelá Yehova asalisa yo, mpe salelá bisaleli ya bolukiluki oyo ezali na monɔkɔ na bino mpo esalisa yo omona mpe osalela mitinda ya Biblia oyo eyokani na likambo na yo.​—Nz 25:4.

TALÁ VIDEO TOSENGELI ‘KOYIKA MPIKO NTANGO TOZALI KOPOTA MBANGU’​—LYÁKÁ BILEI OYO ETONGAKA NZOTO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Na video oyo, mbamba nini bazalaki kotya ndeko mwasi?

  • Ndenge nini kosalela bisaleli ya bolukiluki ekoki kosalisa yo olonga mbamba lokola oyo wana?

  • Matomba nini tozwaka soki tozwi ntango ya kosala bolukiluki mpe tomipesi na boyekoli na biso moko oyo ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu?​—Ebr 5:13, 14

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto